[1] Nábanda lisusu komikumisa 'tè nazali mosali ya kokoka? Násala lokola bato mosusu, pe námemela bino mikanda oyo ezali kolakisa yango? Násenga bino bókòmela ngai mikanda ya ndenge wana?
[2] Bino moko bozali lokola mokanda na ngai; yango ekòmamá na kati ya motema na ngai, nzokande, bato nyonso bakoki koyeba pe kotanga yango.
[3] Ya solo penza, bozali lokola mokanda oyo Kristo ye moko akòmaki na maboko na ngai. Akòmaki yango na ekòmeli té, kasi na Molimo ya Nzambe ya bomoi. Kala, Nzambe akòmaká Mibeko na mabanga mibale; kasi Kristo akòmi mokanda na ye na mitema ya bato.
[4] Yango wana tozali kotia motema na Nzambe po na Kristo.
[5] Ezali biso moko té bato tomikómisi bato ya kokoka, kasi Nzambe nde moto akómisi biso bato ya kokoka, po tózala basali ya Boyokani ya Sika. Na Boyokani yango, Nzambe akòmi kaka mibeko té, kasi apesi biso Molimo na ye. Pamba té mibeko ememaka liwa, kasi Molimo apesaka bomoi.
[7] Atako Mibeko ya kala ezalaká koyeela bato liwa pe komemela bango etumbu, tango Nzambe akòmaká yango na mabanga, amonisaki lokumu na ye. Bato ya Israel bazalaká kokoka kotala elongi ya Moize té, po yango ebandaki kongenga makasi; kasi po na mwa-tango moke kaka. Nzokande Molimo Mosantu azali kokómisa bato bosembo na miso ya Nzambe; yango wana esengelaki Nzambe álakisa lokumu na ye na ndenge moko ya koleka penza. Boye té?
[10] Soki mosala oyo eumelaki té ezalaki na lokumu, mbele mosala ya koumela esengeli ézala na lokumu koleka. Tokoki koloba 'tè lokumu ya kala ezali lisusu penza té, awa lokumu ya sika eleki yango mosika.
[12] Lokola totiaka motema na Nzambe boye, tozali na molende mingi penza;
[13] tosalaka lokola Moize té. Ye azalaká kozipa elamba na elongi, po bato ya Israel bámona té 'tè kongenga na yango ezalaki kolimwa.
[14] Kasi bato ya Israel ya lelo bazali mayele mokuse. Tango batangaka Mikanda ya Boyokani ya Kala, bazali kaka kozipa elamba na bilongi. Bazali kolongola yango té; nzokande bobele kondima Kristo moto elongolaka yango.
[15] Ya solo, tii lelo, tango batangaka Mikanda ya Moize, bayebaka tina na yango té, po elamba ezipaka mayele na bango.
[16] Bobele soki moto abaluki pe atali Nkolo, elamba wana elongwe.
[17] Kotala Nkolo ezali: kotia motema na Molimo Mosantu. Moto oyo asangani na Molimo ya Nkolo azali na bonsomi.
[18] Biso nyonso tosi'tolongolá elamba na bilongi; boye lokumu ya Nkolo ezali komonana na bilongi na biso. Ndenge wana tozali kokóma lokola ye, tozali kozwa lokumu na ye, pe lokumu na biso ezali komata se komata. Makambo nyonso wana eutaka na Molimo ya Nkolo.