[1] Pamba té, nzoto na biso awa na se ezali lokola ndako ya kapo; yango ekokufa. Kasi na mboka na ye, Nzambe akopesa biso nzoto ya seko; yango ekozala lokola ndako ya kitoko oyo esalamá na maboko ya bato té.
[2] Nzoto na biso ezali pe lokola elamba oyo tolati. Sik'oyo tozali kolela; tokómi koyoka posa mingi ya kokota na ndako na biso ya Likolo; tolingi kolata elamba na biso ya sika kaka na tango tozali nanu na oyo ya kala, po tótikala bolumbu té.
[4] Tango tozali kofanda na ndako na biso ya kapo, tozali kolela pe kobanga. Ya solo, tolingi kotika elamba ya kala té, tolingi kolata elamba ya sika na likolo ya oyo ya kala; elingi koloba: nzoto oyo etangamá kokufa ézwa bomoi ya seko.
[5] Nzambe asi'asali nyonso po tózwa bomoi yango, pamba té asi'apesi biso Molimo na ye po na kolakisa 'tè alingi kopesa biso mobimba na ye.
[6] Yango wana, totiaka kaka molende mikolo nyonso, atako toyebi 'tè tango naumeli na nzoto na biso ya bomoto, tozali mosika ya Nkolo Yezu.
[7] Pamba té, awa na mokili tozali kaka kondima, tozali penza komona polele té.
[8] Ya solo, tozali na molende, tomoni 'tè eleki malamu tótika nzoto oyo, po tókende kofanda epai ya Nkolo.
[9] Kasi mama ya likambo ezali, kosepelisa ye, ata totikali na nzoto oyo, to tolongwe na yango.
[10] Pamba té, mokolo Kristo akosambisa biso, akotala biso nyonso malamu penza, po moto na moto ázwa oyo ekoki na ye soki azalaki kosala malamu to mabe na bomoi na ye awa na se.
[11] Lokola tosi'toyebi ndenge esengeli kotosa Nkolo, tozali kaka koluka kolakisa yango na bato nyonso. Nzambe ayebi biso malamu penza, pe totie motema 'tè na se ya motema na bino, bino pe boyebi biso malamu penza.
[12] Tina ezali té po tólakisa bino 'tè tozali bato ya kokoka; kasi tolingi kopesa bino nzela ya kobeta tolo likolo na biso. Bongo bokokoka kozongisa maloba na bato oyo babetaka tolo té po na makambo ebombamá na kati ya motema, kasi bobele na oyo emonanaka na miso ya bato.
[13] Tozali na liboma? Soki tozali na liboma ezali nde po na Nzambe. Kasi soki tozali na makanisi ya malamu ezali nde po na bino.
[14] Bolingo ya Kristo ezali kotambwisa biso. Pamba té, toyebi 'tè moto moko akufaki po na bato nyonso. Wana elakisi 'tè bato nyonso bakómá lokola bakufá.
[15] Pe Kristo akufaki po na bato nyonso, na tina 'tè baoyo bazali na bomoi, bomoi yango ézala ya bango moko té, kasi ézala ya moto oyo akufaki pe asekwaki po na bango.
[16] Yango wana banda sik'oyo tozali kotala lisusu moto moko té na ndenge ya bomoto. Atako kala tozalaki kotala Kristo na ndenge ya bomoto, kasi sik'oyo tozali kotala ye lisusu na ndenge wana té.
[17] Pamba té soki moto azali na lisanga na Kristo, akómi moto ya sika. Makambo ya kala esili; oyo ya sika ebandi.
[18] Nyonso wana euti na Nzambe oyo atindelaki biso Kristo po na kozongisa boyokani kati na biso ná ye. Pe ye moto apesaki biso mosala ya kobenda bato mosusu báyokana ná ye.
[19] Ya solo, Nzambe azalaki kosala na nzoto ya Kristo po na kozongisa boyokani kati na bato ná ye moko; pe azalaki kotala lisusu masumu na bango té. Bongo apesaki biso mosala ya kosakola sango ya boyokani yango.
[20] Yango wana biso tozali bantoma ya Kristo. Nzambe ye moko azali kobenga bino po bóyoka mateya na ye epai na biso: po na yango tobondeli bino na kombo ya Kristo 'tè: “Bózongisa boyokani ná Nzambe.”
[21] Kristo asalaki masumu té, kasi Nzambe amemisaki ye mokumba ya masumu na biso, po 'tè biso tókóma bosembo na miso ya Nzambe, likolo na ye.