Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:38

[1] Bongo lokola biso tosalaka ná Nzambe, tobondeli bino 'tè bókeba po bolamu Nzambe apesaka bino ékende pamba té.

[2] Po Nzambe alobaki: “Na tango ya malamu, nayokelaki bino; nasalisaki bino tango mokolo ya kobikisa bino eyaki.” Mokolo yango esi'ekoki. Lelo oyo ezali mokolo ya kobika.

[3] Tolingi té bátónga biso po na mosala oyo tosalaka; yango wana tolukaka koyokisa moto moko té pasi,

[4] kasi na makambo nyonso tolakisaka 'tè tozali basali ya Nzambe. Tokangaka motema, atako bayokisaka biso bapasi ndenge na ndenge: banyokolaka biso, batungisaka biso koleka,

[5] babetaka biso fimbu, babwakaka biso na boloko, babimiselaka biso mobulu. Tomonaka pasi na mosala, mbala mingi tolalaka pongi té pe tozangaka biloko ya kolia.

[6] Tolakisaka 'tè tozali basali ya Nzambe, na ndenge tozalaka motema pembe pe boboto. Toyebaka basekelé ya Nzambe; Molimo Mosantu azalaka na biso, tozali na bolingo ya solo, pe toyebi kokanga motema.

[7] Tolobaka bobele makambo ya solo, tosalelaka nguya ya Nzambe. Makambo ya bosembo ezali bibundeli na biso po na komibatela pe kolonga banguna,

[8] ata bazali kokumisa biso to kotsiola, ata bazali koloba makambo ya mabe to ya malamu po na biso. Bamonaka biso bato ya lokuta, kasi tolobaka makambo ya solo.

[9] Balobaka 'tè toyebani té, nzokande bato nyonso bayebi biso malamu. Balobaka 'tè tokómi penepene ya liwa, nzokande tozali na biso malamu. Bapesaka biso etumbu, kasi nanu babomá biso té.

[10] Bayokisaka biso mawa, kasi tozali na esengo tango nyonso. Bamonaka biso lokola bato bakelelá, nzokande tomemelaka bato mingi bomengo. Balobaka 'tè tozali na eloko té, kasi biloko nyonso ezali ya biso!

[11] Bandeko ya Korente, tolobeli bino polele, pe toyebisi bino nyonso oyo ezali na motema na biso.

[12] Tobombeli bino makambo na motema na biso té, kasi bino nde bato bobombeli biso makambo na motema.

[13] Nazali koloba na bino lokola bana na ngai: bókamataka biso ndenge biso tokamataka bino. Bófungolela biso mitema na bino.

[14] Bóboya kosangana ná baoyo bandimaka Nzambe té. Bosembo ná mobulu ekoki kozala esika moko? Moi ná butu ekoki kokóma ndenge moko?

[15] Kristo akoki koyokana ná Satan? Kondima Nzambe pe koboya ye ekoki kokende nzela moko?

[16] Bikeko ya pamba ekoki kozala na kati ya Ndako ya Nzambe? Pamba té, biso tozali lokola Ndako ya Nzambe ya bomoi. Ye moko alobaká: “Nakobanda kofanda na kati na bango, pe kotambola ná bango nzela moko. Nakozala Nzambe na bango pe bango bakozala bato na ngai.”

[17] Yango wana Nkolo alobi boye: “Bólongwa kuna pe bókabwana ná bango. Bósimba eloko ya mbindo té, boye ngai nakoyamba bino.

[18] Nkolo ya nguya nyonso alobi: Ngai nakozala Tata na bino, pe bino bokozala bana na ngai ya mibali ná ya basi.”

2 Ba-Korentien — Chapters