[1] Bandeko, nalingi koyebisa bino ndenge Nzambe alakisaki bolamu na ye epai ya ba-Eklezya ya Masedwane.
[2] Bato ya kuna bazalaki komona pasi pe bazalaki kokelela; kasi ata bongo batondaki na esengo, yango wana babandaki kokaba mingi.
[3] Ya solo, namoni 'tè bapesaki oyo ekokaki na bango, kutu balekisaki, po bango moko balingaki ndenge wana.
[4] Babondelaki biso na molende nyonso 'tè tópesa bango nzela ya kosangana ná biso, po na kosalisa bato ya Nzambe ya mboka Yeruzalem.
[5] Tokanisaki té 'tè bakoki kosala ndenge wana, nzokande Nzambe asali 'tè bámipesa liboso na Nkolo Yezu, bongo sima bámipesa na biso.
[6] Boye Tosengaki Tite áya kosalisa bino po bósilisa mosala ya bolingo oyo ye abandaki.
[7] Bosi'bokoki na makambo nyonso: bokoli na bondimi pe na mayele, boyebi kosakola basekelé ya Nzambe, botondi na molende pe na bolingo oyo bozali kolakisa epai na biso. Bongo bókoka pe na mosala oyo ya bolingo.
[8] Nazali kopesa bino motindo té, kasi nayebisi bino ndenge bato mosusu batie molende po na kosalisa baninga, po bólakisa 'tè bolingo na bino ezali ya solo.
[9] Pamba té, boyebi bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo: ye azalaki na bomengo nyonso, kasi akómaki kokelela po na bino, na tina 'tè bózwa bomengo po na kokelela na ye.
[10] Bongo toli na ngai na likambo oyo ezali boye: ebongi na bino bósala kaka ndenge bobandaki na mbula eleki; bozalaki kutu bato ya liboso ya kozwa likanisi wana pe ya kobanda kokokisa yango.
[11] Bongo sik'oyo bókokisa makambo oyo bosi'bokanaki. Lokola bokanaki yango na motema moko, bókokisa yango na ndenge bokoki.
[12] Pamba té, Nzambe asepelaka soki moto aluki kokaba na ndenge bomengo na ye ezali; oyo azali na yango té, Nzambe asengaka yango pe té.
[13] Ye alingi té 'tè bino bómona pasi po na kosalisa bato mosusu; kasi alingi bandeko nyonso bázala ndenge moko.
[14] Lelo bozali na biloko ebele; ebongi bósalisa bato oyo bazali kokelela. Bongo mokolo mosusu, soki bino bokeleli, kasi bango bakómi na biloko ebele, bakosalisa bino. Boye bino nyonso bokozala ndenge moko.
[15] Ekòmamá boye: “Bato oyo balokotaki bilei mingi, balekaki baninga té; pe baoyo balokotaki moke bazangaki té.”
[16] Topesi mersi na Nzambe, po asali 'tè Tite álinga bino ndenge biso tolingaka bino.
[17] Pamba té, andimi kosala ndenge tosengi ye; ye moko kutu akanaki koya epai na bino.
[18] Totindi ye ná ndeko mosusu oyo bato ya ba-Eklezya nyonso bandimaka po na ndenge asalelaka Sango Malamu.
[19] Pe lisusu, ba-Eklezya wana moto eponi ye ázala moninga na biso ya mobembo, na mosala ya bolingo oyo tozali kosala na esengo nyonso, po na lokumu ya Nkolo.
[20] Tozali kosala nyonso po bato bátónga biso té na ndenge tozali kosalela mosolo ebele boye.
[21] Tozali koluka kosala makambo ya malamu, na miso ya Nkolo pe na miso ya bato.
[22] Totindi bango ná ndeko na biso mosusu. Mbala mingi tozali komona 'tè azali na molende penza na makambo nyonso. Sik'oyo akómi na molende mingi koleka, po azali kotiela bino motema.
[23] Boye bóyamba bango malamu. Tite azali moninga na ngai ya motema pe ya mosala oyo asalaka ná ngai po na bino. Bandeko mosusu baoyo bakoya nzela moko ná ye, bazali bantoma ya ba-Eklezya; ya solo, bazali penza lokumu ya Kristo.
[24] Bólakisa 'tè bolingaka bango, po bato ya ba-Eklezya bámona 'tè tolo oyo tobetaki likolo na bino ezali ya pamba té.