Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:45

[1] Sik'oyo esengeli náloba po na makambo etali ngai moko. Balobaka 'tè nazali moto ya kimia tango nazalaka epai na bino, kasi na mosika namilakisaka moto ya makasi. Nasengi bino na motema ya malamu pe na boboto ya Kristo:

[2] Bótinda ngai té nálakisa makasi na ngai tango nakoya epai na bino. Pamba té, nakolakisa yango na molende nyonso epai ya bato oyo bazali kokanisa 'tè nalandaka bobele makambo ya bomoto.

[3] Ya solo, nazali kaka moto; kasi nabundaka na ndenge ya bomoto té.

[4] Bibundeli oyo nasalelaka na bitumba ezali kaka ya bomoto té, kasi ezali ya nguya ya Nzambe. Na yango nde nasilisaka makasi ya banguna, makanisi na bango ya lokuta,

[5] pe lofundu nyonso oyo epekisaka bato nzela ya koyeba Nzambe. Na yango pe lisusu nalongaka bato nyonso ya mayele, pe nakómisaka bango baumbu ya Kristo.

[6] Boye, soki bino bokómi kotosa penza, nakobanda kopesa etumbu na baoyo bazali kotosa té.

[7] Bótalaka makambo ndenge ezali ya solo. Soki moto akanisi 'tè azali moto ya Kristo, áyeba libela 'tè ngai pe nazali moto ya Kristo lokola ye.

[8] Ata soki esengeli námikumisa lisusu po na bokonzi oyo Nkolo Yezu apesaki ngai, nakoyokela yango soni té. Apesaki ngai yango po na kobongisa bino, kasi po na kokweisa bino té.

[9] Nalingi té 'tè mikanda na ngai ébangisa bino.

[10] Pamba té, balobaka: “Mikanda ya Polo ezokisaka biso mitema, kasi soki tozali na ye, azalaka na makasi ata moko té, pe maloba na ye ezali ya pamba.”

[11] Moto alobaka boye áyeba 'tè: ndenge nakòmelaka bino na mosika, nakosala bobele ndenge wana tango nakoya.

[12] Bamosusu balukaka kolakisa 'tè bazali bato ya kokoka. Kasi nalingi komekana ná bango té to koloba 'tè nakokani ná bango. Pamba té, bango bazali na mayele té! Basepelaka kaka po na bizaleli na bango moko; batalaka kaka ndelo oyo bango moko batie.

[13] Kasi ngai nalekisaka komikumisa té; ndelo oyo Nzambe atieli ngai yango oyo: amemaki ngai tii epai na bino.

[14] Ya solo, ngai nazali moto ya liboso oyo amemelaki bino Sango Malamu ya Yezu Kristo. Awa nalobi boye, nazali kolekisa ndelo té; nazali komikumisa té po na mosala ya bato mosusu. Kasi ndelo ngai moko natie yango oyo: natie motema 'tè bondimi na bino ekokola. Yango moto ekosala 'tè názwa lokumu epai na bino.

[16] Bongo na sima nakokende kosakola Sango Malamu na bamboka mosusu, esika bayoki yango nanu té. Boye nakomikumisa té likolo ya mosala oyo bato mosusu basi'basali.

[17] Ekòmamá boye: “Moto oyo alingi komikumisa, ámikumisa bobele po na makambo Nkolo asaleli ye.”

[18] Pamba té, moto Nkolo andimaka ezali té oyo amimonaka moto ya kokoka, kasi bobele oyo Nkolo amonaka moto ya kokoka.

2 Ba-Korentien — Chapters