[1] Nzambe apesaki biso mosala oyo po ayokelaki biso mawa; yango wana tolembaka té.
[2] Tosi'toboyá makambo ya mabe oyo esalamaka na kobombama; tokosaka bato té pe tobongolaka maloba ya Nzambe té. Kasi tosakolaka polele makambo ya solo, pe na ndenge wana tomilakisaka bato ya kokoka epai ya moto nyonso oyo alukaka Nzambe na se ya motema na ye mobimba.
[3] Sango Malamu oyo tosakolaka soki ebombami, ezali bobele po na bato oyo bazali kobunga.
[4] Pamba té Sango Malamu ezali lokola moi. Yango emonisaka lokumu ya Kristo, pe Kristo alakisaka biso ndenge Nzambe azali. Nzokande bato wana bazali kondima té, po Satan, nzambe ya mokili oyo, azipá bango miso pe akangá bango mayele.
[5] Tosakolaka sango ya biso moko té, kasi ya Nkolo Kristo Yezu; tomikómisá baumbu na bino po na ye.
[6] Nzambe alobaká: “Kongenga ézala.” Ezali pe ye moto ayaki kongenga na kati ya mitema na biso, po tókoka kolakisa bato lokumu na ye, oyo emonanaka na elongi ya Kristo.
[7] Ya solo, Nzambe apesi biso bomengo monene; kasi biso bato tozwi yango tozali kaka lokola nzungu ya mabelé; boye moto nyonso akoki koyeba 'tè nguya ya monene boye ezali ya Nzambe, kasi ya biso té.
[8] Batungisaka biso bipai nyonso, kasi tolembaka té; bamonisaka biso pasi, kasi tokangaka kaka motema;
[9] banyokolaka biso, kasi Nzambe atikaka biso té; bakweisaka biso na mabelé, kasi tii lelo babomá biso té.
[10] Ya solo, tango nyonso tomemaka na nzoto na biso pasi ya liwa ya Yezu, po bomoi na ye émonana pe na nzoto na biso.
[11] Na bomoi na biso mobimba tozali kokutana na makama ya liwa po na Yezu. Na ndenge wana bomoi ya Yezu ezali komonana na biso, atako nzoto na biso etangamá kokufa.
[12] Boye liwa ezali kobundisa biso, nzokande bino bozali kozwa bomoi.
[13] Ekòmamá boye: “Nazali kotia motema epai ya Nkolo, yango wana nazali koloba.” Ngai pe nazali kotia motema na Nkolo, yango wana nazali koloba.
[14] Pamba té, toyebi 'tè Nzambe asekwisaki Nkolo Yezu. Ye pe moto akosekwisa biso na lisanga na Yezu, bongo akotia biso penepene na ye, esika moko ná bino.
[15] Makambo nyonso wana ezali, esalami po na bino; boye lokola bato ebele bazali kozwa bolamu ya Nzambe, mingi pe bakopesa ye mersi pe bakokumisa ye.
[16] Yango wana tolembaka té. Atako bomoi na biso ya bomoto ezali kolemba, kasi bomoi na biso ya molimo ezali kokola mokolo na mokolo.
[17] Bapasi oyo tomonaka ezali ya mike-mike pe ekoumela té; kasi ezali kobongisela biso lokumu moko ya monene pe ya kokamwa penza.
[18] Toboyi koluka bomengo oyo emonanaka na miso, kasi tolukaka oyo emonanaka té. Po bomengo oyo emonanaka na miso eumelaka té, kasi oyo emonanaka té ezali ya seko.