[1] Namoni tina té ya kokòmela bino lisusu po na ndenge ya kosalisa bato ya Nzambe ya mboka Yeruzalem.
[2] Pamba té, nayebi 'tè bozali na posa ya kosalisa bango, pe nakumisaki bino na miso ya bato ya Masedwane; nalobaki boye: “Bandeko ya Akaya basi'bamibongisá banda mbula eleki.” Yango wana bato mingi ya Masedwane bakómi molende po na ndakisa na bino.
[3] Sik'oyo natindeli bino Tite ná baninga na ye, po bómibongisa lokola nasi'namilobelaki yango; boye kokumisa oyo ngai nakumisaki bino, ékende pamba té.
[4] Tango bato ya Masedwane bakoya nzela moko ná ngai, soki bamoni 'tè bomibongisi nanu té, nakomona soni mingi po natiaki motema epai na bino. Kasi soni na bino ekoleka penza!
[5] Yango wana, namoni 'tè esengeli násenga bandeko wana báya epai na bino liboso na ngai, bábongisa makabo na bino ndenge bokanaki. Boye soki bosi'bobongisi yango, ekomonana polele 'tè bopesaka makabo na motema moko, kasi na mitema mibale té.
[6] Bókanisa nanu: moto oyo akonaka moke, abukaka moke; oyo akonaka mingi, abukaka mingi.
[7] Ebongi moto na moto ákaba ndenge akanaki; ásala yango na motema mawa té to po batindi ye na makasi. Pamba té, Nzambe alingaka moto oyo akabaka na esengo.
[8] Ezali ye pe moto akoki kopesa bino bolamu ya ndenge na ndenge; boye tango nyonso bokobanda kotonda na biloko nyonso oyo bozali na yango posa, pe bokokoka kosala misala nyonso ya malamu.
[9] Ekòmamá boye: “Ye apesaka bato bakelelá makabo mingi; bolamu na ye ekoumela seko.”
[10] Ezali Nzambe moto apesaka na mokoni mbuma ya kokona pe biloko ya kolia; ezali ye pe moto akotondisa bino pe na bolamu, po yango ékóma lokola mbuma oyo bokokona; bongo ébimisa biloko ebele oyo bokokoka kokabela baninga.
[11] Ye akokómisa bino bato ya bomengo mingi, po bókoka kokabela baninga; boye bato mingi bakobanda kopesa Nzambe mersi.
[12] Ya solo, mosala ya bolingo oyo tosalelaka bandeko bakelelá, ekosepelisa kaka bango té kasi ekosepelisa pe Nzambe, po bato ebele bakozala kopesa ye mersi.
[13] Pamba té, lokola bakomona 'tè mosala na bino ezali penza malamu, bango nyonso bakokumisa Nzambe po na ndenge botosaka Sango Malamu ya Kristo, pe bokabelaka bango ná bato nyonso bomengo na bino.
[14] Tango bakomona bolamu monene oyo Nzambe akabeli bino, bakosambela ye po na bino na bolingo nyonso.
[15] Mersi na Nzambe, po likabo na ye eleki mayele na biso!