Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:59

[1] Bandeko, lokola Nzambe apesi biso bilaka yango, tólongola makambo nyonso oyo ememaka mbindo na nzoto to na motema; tótosaka Nzambe, pe tóluka kozala bato ya bosantu.

[2] Bóyamba biso na mitema na bino. Tosalaki mabe na moto moko té; tobungisaki moto moko té; totielaki moto moko té mokumba na biso.

[3] Tolingi koloba té 'tè bosalaki biso mabe; pamba té, tosi'toyebisá bino banda kala 'tè bozali bato na biso ya motema, ézala na tango ya liwa to ya bomoi.

[4] Totieli bino motema penza, pe tozali kobeta tolo likolo na bino. Na kati ya bapasi na biso nyonso, tozali na molende mingi pe totondi na esengo.

[5] Na Masedwane pe ezalaki kaka ndenge moko. Tango tokómaki kuna, tokokaki kopemisa nzoto té; tokutanaki na mikakatano ya ndenge na ndenge: epai ya bato bobele mobulu, pe na kati ya mitema na biso bobele kobanga.

[6] Kasi Nzambe oyo akitisaka mitema ya bato ya mawa, akitisaki pe ngai motema tango Tite akómaki,

[7] pe mingi penza tango nayokaki ndenge bokitisaki ye motema. Ayebisaki ngai ndenge bozali na posa ya komona ngai, ndenge botondi na mawa po na makambo elekaki, pe ndenge bozali kolinga ngai. Yango wana nazali na esengo mingi koleka.

[8] Bongo soki mokanda na ngai eyokisaki bino pasi, nazali lisusu na mawa té po na yango. Nakómaki na mawa tango nayaki koyoka 'tè mokanda yango esalaki bino pasi. Kasi lokola pasi na bino eumelaki mingi té,

[9] nakómi kosepela. Pamba té, atako nayokisaki bino pasi, kasi pasi yango ebongolaki mitema na bino. Bongo lokola Nzambe asalelaki pasi na bino, ngai nasalaki bino mabe ata moko té.

[10] Ya solo, pasi oyo Nzambe asalelaka, ebongolaka mitema ya bato po bábika; bongo tina ya koyoka mawa ezali té. Kasi soki moto atalaka Nzambe té na tango ya pasi, pasi yango ememaka liwa.

[11] Bótala sik'oyo ndenge Nzambe asalelaki pasi na bino: ndenge bobandi kosala makasi, kosenga bolimbisi, koboya makambo oyo elekaki; ndenge bokómi kotosa pe koyoka posa ya kobongisa makambo; ndenge bomipesi na mosala, pe bokateli moto asalaki mabe etumbu. Nyonso wana elakisi polele 'tè bino bozalaki na likambo té.

[12] Bongo tango nakòmelaki bino mokanda wana, ezalaki té po na moto asalaki mabe; ezalaki pe té po na ngai moto ye asalaki mabe yango; kasi ezalaki po bólakisa na kati na bino pe na miso ya Nzambe, ndenge bozali kolinga ngai.

[13] Yango wana, mawa na ngai esilaki. Ya solo, nasilisaki kaka mawa té, natondaki kutu na esengo po na ndenge Tite asepelaki, awa bokitisaki ye motema.

[14] Pamba té, na miso na ye nabetaki tolo likolo na bino, bongo boyokisaki ngai soni té. Boye, ndenge nalobaka na bino bobele makambo ya solo, se ndenge wana Tite pe ayaki komona 'tè makambo nabetelaka tolo po na bino ezali ya solo.

[15] Azali kaka kokanisa ndenge bino nyonso bozalaki kotosa ye pe ndenge boyambaki ye na kobanga nyonso; yango wana akómi kolinga bino mingi koleka.

[16] Nasepeli po nakoki kotiela bino motema na makambo nyonso.

2 Ba-Korentien — Chapters