Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:20

[1] Bandeko, soki bozwi moto moko asali mabe, bino bato bozali na Molimo ya Nzambe, bózongisa ye na nzela ya malamu, na boboto nyonso. Kasi moto na moto na kati na bino ákeba, soki té Satan akomeka ye pe lisusu.

[2] Bósalisanaka na tango ya pasi, boye bokotosa mobeko ya Kristo.

[3] Soki moto akanisi 'tè akómi moto monene, nzokande azali moto ya pamba, azali komikosa ye moko.

[4] Kasi moto na moto átala malamu bizaleli na ye, boye akoki kosepela po na yango na kati ya motema; kasi ákanisa té 'tè aleki bato mosusu.

[5] Pamba té moto na moto asengeli komema mokumba na ye.

[6] Moto oyo azali koyekola mateya ya Sango Malamu, ákabela molakisi ndambo ya biloko na ye nyonso.

[7] Bómikosa té! Moto atsiolaka Nzambe, asukaka mabe. Nyonso oyo asalaka, yango wana pe moto ezongelaka ye.

[8] Soki moto alandi posa ya nzoto na ye, yango ekomemela ye liwa. Kasi oyo alandi ndenge Molimo ya Nzambe alingi, Molimo akopesa ye bomoi ya seko.

[9] Bongo, tólembaka té po na kosala makambo ya malamu; pamba té soki totie molende, mokolo ezali tokozwa bolamu.

[10] Yango wana, lokola tango ezali nanu ya kosala malamu, tósalaka malamu yango na bato nyonso, kasi liboso na bandeko na biso kati na bondimi.

[11] Bótala ndenge ngai moko nazali kokòmela bino na bikòmá ya minene.

[12] Baoyo batindaka bino na makasi po bókatisa nzoto, balukaka nde komilakisa na miso ya bato. Basalaka bongo bobele po bato bányokola bango té likolo ya kuruze ya Kristo.

[13] Ata baoyo bakatisá nzoto, bango moko kutu batosaka Mibeko té. Balingi kaka kokatisa bino nzoto, po bákoka komikumisa soki bino botikali na elembo na nzoto.

[14] Kasi ngai nalukaka lokumu ya ndenge wana ata moke té. Lokumu na ngai ezali bobele kuruze ya Nkolo na biso Yezu Kristo. Pamba té lokola ye akufaki na kuruze, namoni makambo ya mokili lokola eloko ekufá; pe ngai moko nazali lokola moto asi'akufá na makambo etali mokili.

[15] Ata tokatisi nzoto to té, ezali na tina moko té; kasi likambo eleki, yango oyo: kokóma moto ya sika.

[16] Boboto ná bolamu ézala na bato nyonso oyo balandaka nzela wana, pe na bato nyonso Nzambe aponá.

[17] Banda lelo, moto átungisa ngai lisusu té. Na nzoto na ngai, nazali na bilembo ya bapota ya Yezu.

[18] Bandeko, bino nyonso bózwa bolamu oyo euti na Nkolo na biso Yezu Kristo! Amen!

Ba-Galate — Chapters