[1] Eleki mbula zomi na minei (14), nazongi lisusu na Yeruzalem ná Barnabas; tokamati pe Tite.
[2] Nakendeki kuna po Nzambe alakisaki ngai 'tè nasengeli kokende. Nakutanaki ná bato minene ya Eklezya, pe nalimbolelaki bango Sango Malamu oyo nasakolaka epai ya bato bazali Bayuda té. Nalingaki té 'tè mosala na ngai nyonso ékóma mosala ya punda.
[3] Bongo moninga na ngai Tite, atako azali Grek, bakataki ye nzoto na makasi té.
[4] Nzokande bandeko ya lokuta bamikotisaki na mayele, pe bazalaki kotala bonsomi oyo tozali na yango na lisanga na Kristo Yezu, po bákómisa biso baumbu.
[5] Tondimaki makambo ya bato wana ata moke té, po tókoka komemela bino Sango Malamu ya solo.
[6] Kutu baoyo bazalaki komonana bato minene, bapesaki ngai mibeko ya sika té. Nzokande ndenge bato yango bazalaki liboso 'tè Nzambe ábenga bango, etali ngai té; Nzambe aponaka bilongi ya bato té.
[7] Kasi bamonaki 'tè Nzambe aponaki ngai po násakola Sango Malamu epai ya bato oyo bazali Bayuda té, ndenge aponaki pe Piere po ásakola yango epai ya Bayuda.
[8] Pamba té ndenge Nzambe atiá Piere ntoma epai ya Bayuda, se ndenge wana pe atiá ngai ntoma epai ya baoyo bazali Bayuda té.
[9] Jake, Piere ná Yoane, oyo bazalaki komonana lokola bato basimbi Eklezya, bandimaki 'tè Nzambe apesaki ngai mosala wana, boye bayambaki ngai ná Barnabas, po na kolakisa bondeko. Toyokanaki 'tè ngai ná Barnabas tókende kosakola Sango Malamu epai ya bato oyo bazali Bayuda té, pe bango bákende epai ya Bayuda.
[10] Basengaki biso kaka 'tè tókanisaka bato oyo bazali kokelela. Pe nabandaki kotia makasi po na kosala yango.
[11] Kasi tango Piere akómaki na Antioshe, naboyaki makambo na ye polele na miso ya bato, po abandaki kosala mabe.
[12] Pamba té liboso 'tè bato ya Jake bákóma kuna, Piere azalaki kolia esika moko ná bandimi oyo bazali Bayuda té. Kasi tango bato oyo Jake atindaki bakómaki, Piere abendi nzoto pe atiki kolia ná bandimi oyo bazali Bayuda té, po azalaki kobanga bandimi ya ekolo ya Bayuda, oyo balingaka bákata nzoto ya bandimi oyo bazali Bayuda té.
[13] Bayuda mosusu ya Antioshe babandi kutu kosala lokola ye; ata Barnabas pe akómaki kolanda makambo na bango ya mabe.
[14] Kasi tango namonaki 'tè batiki nzela ya solo ya Sango Malamu, nalobelaki Piere boye na miso ya bato nyonso: “Yo ozali Moyuda, kasi olandi bizaleli ya baoyo bazali Bayuda té. Bongo sik'oyo ndenge nini okoki kotinda bato oyo bazali Bayuda té, bálanda mibeko ya Bayuda?
[15] “Biso tobotamá Bayuda; tokokani té na bato ya bikolo mosusu, oyo Bayuda babengaka bato ya masumu.
[16] Nzokande toyaki koyeba 'tè moto moko té akómaka bosembo po atosaka Mibeko, kasi bobele po andimaka Yezu Kristo. Boye biso pe tosi'tondimi Kristo Yezu, po tókóma bosembo; totiki kotia mitema na Mibeko, pamba té moto moko té akómaka bosembo po atosaka Mibeko.”
[17] Kasi soki tobandi koluka kokóma bosembo po na Kristo, wana tondimi 'tè biso Bayuda pe tozali bato ya masumu, lokola bato ya bikolo mosusu. Ezali nde Kristo moto akómisi biso bato ya masumu? Ata moke té!
[18] Soki nabandi kotònga lisusu ndako oyo nasi'nabomá, elakisi 'tè ngai moko natosaka mibeko té.
[19] Na makambo oyo etali Mibeko, nasi'nakufá. Ezali Mibeko moto ekatá 'tè nasengeli kokufa; pe nandimi kokufa po názala na bomoi na miso ya Nzambe. Babomaki ngai na kuruze esika moko ná Kristo.
[20] Bongo ezali ngai Polo té moto nazali na bomoi; kasi ezali Kristo moto azali na bomoi na nzoto na ngai. Bomoi oyo nazali na yango sik'oyo, nazwaki yango po nandimeli Mwana ya Nzambe, oyo alingaka ngai pe amipesaki po na ngai.
[21] Naboyi bolamu ya Nzambe té. Pamba té soki bato bakoki kokóma bosembo po batosaka Mibeko, wana elakisi 'tè liwa ya Kristo ezali na tina té.