[1] Kristo asi'alongolá biso na boumbu, po tózala ya solo bato ya bonsomi. Bókangama kaka na bonsomi, bózongela boumbu té.
[2] Ngai Polo nakebisi bino: soki bomikatisi nzoto, Kristo azali lisusu na tina té po na bino.
[3] Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo amikatisi nzoto: ye asengeli kotosa mitindo nyonso ya Mibeko.
[4] Bino bato bolukaka kokóma bosembo na nzela ya Mibeko, bokabwani na Kristo, bobungisi bolamu na ye.
[5] Kasi biso, na nguya ya Molimo Mosantu, tozali kotia mitema 'tè lokola tosi'tokómá bosembo po na bondimi, na mokolo ya suka tokozwa bolamu oyo tozali kozela.
[6] Pamba té soki moto asangani na Kristo Yezu, ata bakatá ye nzoto to té, likambo té. Eloko eleki tina ezali: bondimi na ye ékómisa ye moto ya bolingo na misala azali kosala.
[7] Bozalaki lokola bato bamekanaka mbangu; pe bolingaki kolonga! Nani apekisaki bino bótika kotosa makambo ya solo?
[8] Yango euti té na moto oyo abengaki bino.
[9] Lokola balobaka: “Mwa-ndambo ya kisi ya mapa evimbisaka sani mobimba ya farine.”
[10] Natie motema na Nkolo 'tè bokozala na makanisi mosusu té. Kasi moto oyo akotiseli bino mobulu, ázala ata nani, Nzambe akopesa ye etumbu.
[11] Bandeko, balobi ngai pe nasakolaka 'tè moto ya Kristo asengeli kokatisa nzoto. Soki ezali boye, liwa ya Kristo na kuruze ezali lisusu likambo ya lisumá té; bongo po na nini Bayuda bazali konyokola ngai?
[12] Baoyo bazali kokotisela bino mobulu na makambo ya kokatisa nzoto, tika básala kutu oyo eleki: bámikatisa mbuma na bango ya mibali!
[13] Bandeko, Nzambe abengi bino po bózala na bonsomi. Eloko moko: bómikosa té! Bonsomi wana ekoki té kopesa bino nzela ya kolanda baposa na bino nyonso ya bomoto! Kasi po na bolingo, bómikómisa baumbu ya baninga.
[14] Pamba té Mibeko nyonso ekoti na mobeko moko: “Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.”
[15] Kasi soki bozali koswana pe kobunda lokola banyama ya zamba, bókeba soki té bokobomana.
[16] Bongo nasengi bino: bótika Molimo ya Nzambe átambwisaka bomoi na bino, pe bóboya baposa na bino ya bomoto.
[17] Pamba té baposa ya bomoto elukaka makambo Molimo ya Nzambe aboyaka, pe Molimo atindaka makambo motema ya bato eboyaka. Bango mibale bazali banguna; yango wana, bólanda baposa ya bomoto té.
[18] Kasi soki Molimo ya Nzambe azali kotambwisa bino, bozali lisusu baumbu ya Mibeko té.
[19] Toyebi malamu makambo posa ya bomoto etindaka: kindumba, makanisi ya bosoto pe makambo ya soni,
[20] kosambela banzambe ya bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, kotiana tembe, kokabwana, koboyana,
[21] kozala na motema likunya, kolangwa masanga, lokoso ya kolia, pe makambo mosusu ya ndenge wana. Nazali koyebisa bino ndenge nalobaki liboso: baoyo basalaka makambo wana, bakozala bato ya bokonzi ya Nzambe té.
[22] Nzokande makambo bato basalaka na nguya ya Molimo, yango oyo: balinganaka, bazalaka na esengo pe kimia; bakangaka motema, basalisanaka, bazali na motema malamu pe bondeko ya solo;
[23] bazali na boboto pe bamibatelaka malamu. Makambo nyonso oyo, Mibeko epekisi yango té.
[24] Bato ya Kristo Yezu basi'bamipesá po bákufa na kuruze; boye basi'babomá baposa pe lokoso ya bomoto.
[25] Lokola Molimo moto apesi biso bomoi, tótika Molimo pe átambwisa biso.
[26] Tókóma bato ya lofundu té. Tótika kotumola baninga pe koyokela bango zuwa.