Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:56

[1] Mbote na bino, bato ya Nzambe ya Efeze oyo bondimelaka Kristo Yezu. Ngai Polo, moto Nzambe aponá po názala ntoma ya Kristo Yezu, natindeli bino mokanda oyo.

[2] Bózwa bolamu pe boboto oyo euti epai ya Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo.

[3] Lokumu na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo! Ye abenisi biso na lisanga na Kristo, pe atondisi biso na bolamu nyonso ya Molimo na ye; akómisá biso bato ya mboka na ye ya Likolo.

[4] Ya solo, liboso 'tè ásala Likolo ná se, Nzambe aponaká biso lisanga na Kristo, tózala bato ya bosantu pe ya malonga na miso na ye, po na bolingo na ye.

[5] Akanaká banda kala, kokómisa biso bana na ye po na Yezu Kristo. Azalaká kolinga bongo na boboto na ye,

[6] po tókumisa monene pe bolingo na ye. Pamba té akabeli biso bolamu na ye na lisanga na Mwana na ye ya bolingo.

[7] Likolo ya makila ya Kristo tolongwe na boumbu; po na ye, Nzambe alimbisi masumu na biso. Nzambe alakisi 'tè bolamu na ye ezangá ndelo,

[8] atondisi biso na yango pe apesi biso mayele nyonso;

[9] ayebisi biso sekelé ya motema na ye, oyo akanaká na boboto na ye, lisanga na Kristo.

[10] Po mokolo ezali, Nzambe akokokisa mokano na ye: akotia Kristo Mokonzi se moko ya biloko nyonso ye asalá, na Likolo pe na se.

[11] Nzambe asalaka makambo nyonso ndenge ye akanaka pe ndenge ye moko alingi. Yango wana biso bato ya liboso oyo totiaki mitema na Kristo, na lisanga na ye tosi'tozwi bomengo oyo Nzambe abombelá bato na ye. Pamba té ye aponaká biso banda kala, po tókumisa monene na ye.

[13] Na lisanga na Kristo bino pe boyokaki Sango Malamu, oyo euti na Nzambe pe ezali kosalisa bino po bóbika. Na lisanga na ye bondimaki yango, bongo Nzambe atie bino elembo na ye; ezali Molimo Mosantu oyo alakaki.

[14] Ya solo, tango Molimo Mosantu akoteli biso, wana elakisi 'tè tosi'tozwi ndambo ya bomengo oyo Nzambe abombelá bato na ye; tokozwa yango nyonso, mokolo tokolongwa libela na boumbu, po tómona nkembo ya Nzambe pe tókumisa ye.

[15] Yango wana mikolo nyonso napesaka Nzambe mersi likolo na bino, po nayoki ndenge bozali kotia mitema na Nkolo Yezu, pe ndenge bozali kolinga bato ya Nzambe nyonso. Nakanisaka bino na losambo na ngai;

[17] nasengaka Nzambe ya Nkolo na biso Yezu Kristo, Tata ya lokumu nyonso, átondisa bino na mayele, pe álakisa bino ndenge ye azali.

[18] Nasengaka ye 'tè ámonisa bino polele bolamu oyo abengeli bino, pe bomengo ya suka té oyo abombelá bato na ye.

[19] Boye bokoyeba nguya na ye ya sukisa oyo esalaka po na biso bato tondimelaka ye. Nzambe asalelaki bobele nguya yango ya ndelo té,

[20] tango asekwisaki Kristo pe afandisi ye na esika ya lokumu na Likolo, penepene na ye.

[21] Milimo nyonso oyo bato babengaka “Bakonzi ya Likolo ná se” ezali na se ya makolo ya Kristo; ata moko té ekoki koleka ye na nguya, ézala na mikolo na biso to na tango ekoya.

[22] Nzambe atiá biloko nyonso na se ya makolo ya Kristo, pe aponá ye ázala lokola motú ya Eklezya.

[23] Pamba té Eklezya ezali lokola nzoto ya Kristo; na kati na yango Kristo azali mobimba, pe na kati ya Kristo, Nzambe azali mobimba.

Ba-Efezien — Chapters