Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:06

[1] Bino ba-Galate, bozali bazoba! Nani aloki bino? Nalimbolelaki bino polele ndenge babomaki Kristo na kuruze.

[2] Nalingi bóyebisa ngai kaka eloko moko: Bozwaki Molimo ya Nzambe po botosaka Mibeko? Té! Ezali po bondimaki sango oyo namemelaki bino.

[3] Bozoba ya ndenge nini boye? Bobandaki na Molimo ya Nzambe, bongo bolingi kosukisa na makasi na bino ya bomoto?

[4] Makambo minene-minene oyo bosi'bomoni, ekómi ya pamba? Nakanisi ekozala ya pamba té.

[5] Nzambe apesaki bino Molimo na ye, pe asalaki makamwisi na kati na bino. Bokanisi 'tè asali bongo po botosaka Mibeko? Té! Ezali po bondimeli sango oyo namemelaki bino.

[6] Ezalaki pe ndenge wana po na Abraham. Ye “andimelaki Nzambe, yango wana Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo.”

[7] Bongo, bóyeba 'tè baoyo bandimelaka Nzambe, bango nde bato bazali penza bana ya solo ya Abraham.

[8] Banda kala Mikanda ya Nzambe elobá 'tè Nzambe akokómisa bato nyonso bosembo po na bondimi. Yango wana asi'ayebisá Abraham sango malamu oyo: “Bato ya bikolo nyonso bakozwa bolamu po na yo.”

[9] Boye Nzambe azali kopesa bolamu yango na baoyo bazali kondima, ndenge Abraham andimaki.

[10] Nzokande baoyo balukaka kaka kolanda Mibeko, bango nyonso batikali bato ya lisumá. Ekòmamá boye: “Moto oyo atosaka mitindo nyonso ya Mikanda ya Mibeko té, pe asalelaka yango té, lisumá na ye.”

[11] Tembe ezali té: na miso ya Nzambe moto moko té akoki kokóma bosembo po atosaka Mibeko. Pamba té ekòmamá na Mikanda boye: “Moto oyo akómi bosembo po na bondimi, akobika.”

[12] Kasi Mibeko ná bondimi ekokani ata moke té. Mikanda elobá boye: “Moto oyo asalelaka Mibeko, akobika kaka na ndenge ekòmamá na Mibeko.”

[13] Kristo afuteli biso nyongo po na kolongola biso lisumá oyo Mibeko ezalaki koyeela biso; pamba té ye akómaki lisumá po na biso. Ekòmamá boye: “Moto nyonso oyo babomi na kodiembelisa na nzete, Nzambe akómisi ye lisumá.”

[14] Esalamaki boye po, lisanga na Kristo Yezu, bato ya bikolo nyonso bákoka kozwa bolamu oyo Nzambe alakaká Abraham. Ndenge wana, po na bondimi, biso tozwaki Molimo oyo Nzambe alakaki.

[15] Bandeko, tótala ndenge bato basalaka. Soki bato bayokani, pe bakonzi bandimi boyokani yango, moto moko té akoki kolongola likambo to kobakisa.

[16] Ezali ndenge moko po na bilaka oyo Nzambe apesaká na Abraham pe na libota na ye. Alobaká té 'tè: “Pe na bato ya libota na yo,” lokola nde bazalaki mingi. Kasi alobaká: “Pe na libota na yo.” Wana elakisi bobele moto moko. Pe moto yango ezali nde Kristo.

[17] Nalingi koloba 'tè: ye moko Nzambe andimaká boyokani oyo asalaká ná Abraham. Nzokande Mibeko eyaki sima ya mbula 430. Yango ebomaki boyokani wana té; soki té elaka elingaki kokóma ya pamba.

[18] Kasi soki bato bakoki kozwa bolamu ya Nzambe po na Mibeko, elakisi 'tè elaka na ye ezangi tina. Nzokande Nzambe apesaki bolamu na ye na Abraham kaka na ndenge apesaki ye elaka.

[19] Bongo, wapi penza tina ya mibeko? Mibeko eyaki sima ya elaka po na kolakisa polele 'tè bato batosaka Nzambe té; pe esengelaki kotikala tii tango moto ya libota ya Abraham akoya. Pamba té Nzambe apesaki Abraham elaka likolo na ye. Ezali ba-anjelu bato bapesaki Mibeko na maboko ya moto oyo azalaki koloba na bato na kombo ya Nzambe.

[20] Nzokande Nzambe ye moko apesaki elaka; atindaki moto moko té po áloba na kombo na ye.

[21] Makambo oyo elakisi 'tè Mibeko eyaki koboma bilaka ya Nzambe? Ata moke té! Soki Mibeko ezalaki na nguya ya kopesa bato bomoi, mbele bakokaki kokóma bosembo po na Mibeko.

[22] Kasi ezali boye té. Mikanda ya Nzambe ezali kolakisa 'tè masumu ekangi bato nyonso. Boye bobele baoyo bazali kondima, bango nde bato bakoki kozwa bolamu oyo Nzambe alakaki. Bazwaka yango po bandimeli Yezu Kristo.

[23] Liboso 'tè Nzambe álakisa biso nzela ya bondimi, Mibeko ezalaki kokanga biso lokola bato ya boloko.

[24] Mibeko yango ezalaki lokola mokengeli oyo amemaka bana epai ya molakisi, elingi koloba epai ya Kristo, po tókóma bosembo na nzela ya bondimi.

[25] Sik'oyo tozali lisusu na maboko ya mokengeli té, po tango ya bondimi ekoki.

[26] Pamba té bino nyonso bozali bana ya Nzambe po bondimeli Kristo Yezu.

[27] Ya solo, bino nyonso oyo bozwaki batisimo na lisanga na Kristo, bokamati bizaleli ya Kristo ye moko.

[28] Bongo, Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, bakómi ndenge moko; baumbu ná baoyo bazali na bonsomi, mibali ná basi, bakokani. Bino nyonso bokómi moto moko, na lisanga na Kristo Yezu.

[29] Soki bozali bato ya Kristo, bozali bato ya libota ya Abraham; boye bokozwa bolamu oyo Nzambe alakaki Abraham.

Ba-Galate — Chapters