[1] Nakoki pe koloba boye: Mwana asengeli kozwa bomengo ya tata na ye. Kasi tango azali nanu mwana moke, akeseni na moumbu ata moke té, atako azali kolo ya biloko nyonso.
[2] Atikali na maboko ya basali oyo bazali kobokola ye pe kotala makambo na ye, tii tango akokokisa mbula oyo tata na ye atiaki.
[3] Biso pe ndenge moko: tango tozalaki lokola bana mike, tobandaki kondima banguya ya bato ya mokili oyo; tozalaki lokola baumbu.
[4] Kasi awa mokolo oyo Nzambe atiaki ekokaki, atindaki Mwana na ye; ye abotamaki na mwasi, pe azalaki kotosa Mibeko ya Bayuda.
[5] Nzambe atindaki ye po na baoyo bazalaki baumbu ya mibeko, po áfutela bango nyongo. Asalaki bongo po tókóma bana na ye.
[6] Ya solo, bozali bana na ye; pamba té Nzambe atindi na mitema na biso Molimo ya Mwana na ye, oyo abelelaka: “Ába! Tata na ngai!”
[7] Yango wana, ozali lisusu moumbu té, kasi okómi mwana. Bongo soki ozali mwana ya solo, Nzambe abombelá yo bomengo na ye.
[8] Liboso boyebaki Nzambe té, pe bozalaki baumbu ya baoyo bazali banzambe ya solo té.
[9] Kasi sik'oyo boyebi Nzambe. Nakoki kutu koloba 'tè Nzambe ayebi bino. Ndenge nini bokoki kozongela lisusu banguya ya bato ya mokili, oyo ezangá nguya pe tina? Bolingi kozala lisusu baumbu na yango?
[10] Bobandi kotosa lisusu mibeko oyo etali mikolo, basanza, bafeti pe bambula!
[11] Nazali kobanga po na bino! Pasi oyo namonaki na mosala epai na bino, ekómi ya pamba?
[12] Bandeko, nazali kosenga bino: bókóma lokola ngai, ndenge ngai pe nakómaki lokola bino. Bosalaki ngai ata mabe moko té.
[13] Boyebi malamu 'tè tango nasakolaki Sango Malamu epai na bino mbala ya liboso, nazalaki na maladi.
[14] Po na maladi na ngai, bokokaki kotsiola ngai to kobanga; kasi boyambaki ngai lokola anjelu ya Nzambe, kutu lokola ye moko Kristo Yezu.
[15] Bozalaki na esengo mingi penza. Bongo boni sik'oyo? Ya solo, namonaki 'tè soki ekokaki kosalama, bolingaki kolongola miso na bino po na kopesa ngai yango!
[16] Sik'oyo nakómi monguna na bino po nazali kolobela bino makambo ya solo?
[17] Bato wana bazali koluka kobenda bino na makambo na bango, kasi ezali malamu té po na bino. Bango bazali koluka kaka bákabola bino ná ngai po bino bólinga kaka bango.
[18] Ezali malamu soki bolingi moto po na makambo ya malonga, pe soki bolingi ye libela. Ezali té 'tè bólinga ngai kaka soki nazali epai na bino.
[19] Bana na ngai, nakómi lokola mama oyo alingi kobota; nazali komona lisusu pasi mingi po na bino, tii tango Kristo akokotela bino.
[20] Nazali na posa mingi ya kokóma epai na bino, po náyeba ndenge nasengeli kolobela bino. Ya solo, nayebi té ndenge nini nakoki kosala po na bino.
[21] Bino bato bolingaka kotosa Mibeko, bóyebisa ngai: boyoki ndenge ekòmamá na Mibeko? Abraham abotaki bana mibale, moko na Agar, mwasi ya moumbu, pe mosusu na Sara, mwasi ya bonsomi.
[23] Mwana ya mwasi ya boumbu abotamaki ndenge moto nyonso abotamaka; kasi Mwana ya mwasi ya bonsomi abotamaki bobele po Nzambe apesaká Abraham elaka.
[24] Makambo yango ezali ndakisa. Bamama wana mibale bazali kolakisa Boyokani ya ndenge mibale. Boyokani ya liboso ezali Agar; ebandaki na ngomba Sinaí, pe ebotaka bobele bana ya boumbu.
[25] Pamba té Sinaí ezali ngomba ya mboka Arabie, ekokani na Yeruzalem ya lelo; bato na yango bazali baumbu.
[26] Kasi Yeruzalem ya Likolo ezali mboka ya bonsomi; yango nde moto ezali mama na biso!
[27] Ekòmamá boye: “Yo moto obotaka té, sepela! Yemba na esengo nyonso! Pamba té mwasi oyo basundolá akozala na bana mingi, koleka mwasi oyo azali na libala.”
[28] Bandeko, bino bokokani na Izaak; bozali bana ya Nzambe, po ye akokisi elaka na ye.
[29] Nzokande na tango ya kala, mwana oyo abotami lokola moto nyonso abandaki konyokola oyo abotami na molimo ya Nzambe. Makambo wana pe ezali kosalama sik'oyo.
[30] Kasi Mikanda ya Nzambe elobi nini? “Bengana moumbu ya mwasi ná mwana na ye. Pamba té mwana ya moumbu akoki kozwa bomengo ya tata na ye esika moko té ná mwana ya mwasi ya bonsomi.”
[31] Boye bandeko, tozali bana ya moumbu ya mwasi té, kasi ya mwasi ya bonsomi.