[1] Bana, bótosaka baboti na bino po na Nkolo Yezu, pamba té yango ezali malamu.
[2] Mobeko ya liboso oyo Nzambe abakisaki elaka, yango oyo: “Tosa tata ná mama na yo,
[3] po ózala na esengo pe óumela mingi awa na mokili.”
[4] Bino batata, bóyokisaka bana na bino kanda té, kasi bóbokola bango na mateya pe batoli ya Nkolo.
[5] Bino baumbu, bótosaka baoyo bazali bakonzi na bino awa na se. Bóbangaka pe bóyokelaka bango na motema moko, lokola nde bozali kosalela Kristo;
[6] ézala bobele té tango bazali kotala bino. Bólukaka kosepelisa bato té, kasi bólukaka kosala nyonso oyo Nzambe alingaka, lokola baumbu ya Kristo.
[7] Bósalaka mosala na bino ya boumbu na mitema malamu, lokola nde bozali kosalela Kristo, kasi bato té.
[8] Bóyeba 'tè moto nyonso, ázala moumbu to moto ya bonsomi, akozwa bolamu epai ya Nkolo, soki mosala na ye ezali malamu.
[9] Bino bakonzi, bósalaka ndenge moko pe epai ya baumbu na bino. Bótika kokanela bango, po boyebi 'tè bino ná bango bozali na Mokonzi na Likolo; pe ye aponaka bilongi ya bato té.
[10] Po na kosukisa, bólukaka makasi na bino na lisanga na Nkolo. Bómilendisaka na nguya na ye ya monene.
[11] Ndenge soda amemaka bibundeli na ye, bino pe bókamata bibundeli nyonso oyo Nzambe apesaka po zabolo ákweisa bino té na mayele na ye ya mabe.
[12] Pamba té biso tobundaka ná bato té, kasi ná milimo oyo babengaka “Bakonzi ya Likolo ná se,” nzokande yango ezali kaka bakonzi ya mokili oyo ya molili; tobundaka ná milimo mabe oyo etambolaka bipai nyonso lokola mipepe.
[13] Yango wana bókamata bibundeli nyonso oyo Nzambe apesaka. Bongo tango mokolo ya mabe ekoya, banguna na bino bakokoka kokweisa bino té, kasi bokobunda tii na suka, pe bokopika kaka pende!
[14] Bongo bómibongisa lokola basoda! Soda alataka mokaba na loketo; mokaba na bino ezali nde mateya ya solo. Soda alataka kazaka ya bibende po na kobatela nzoto. Kazaka oyo ekoki kobatela bino ezali nde bosembo.
[15] Soda alataka sapatu po na kotambola malamu. Ya bino ezali: molende ya kopanza Sango Malamu ya boboto.
[16] Soda asimbaka baraje po na komibatela na bafleshe. Baraje na bino ezali nde bondimi; tango nyonso yango ekoki kopekisa bafleshe ya kopela móto, oyo Monguna abwakaka.
[17] Soda atiaka motema na ekoti na ye ya ebende. Bino bótia mitema na Nzambe; ye nde moto akobikisa bino. Soda abundaka na mbeli. Mbeli oyo Molimo Mosantu apesi bino ezali nde Maloba ya Nzambe.
[18] Na kati ya makambo nyonso bósambelaka Nzambe, bósengaka lisalisi epai na ye, ndenge Molimo alakisaka bino. Bófungola miso pe bólemba té. Bóbondela Nzambe po na bato nyonso ya Nzambe.
[19] Bóbondela ye pe po na ngai, álakisa ngai maloba ya malamu po nákoka kosakola na molende nyonso basekelé ya Sango Malamu.
[20] Nazali ntoma na yango, ata nazali na boloko sik'oyo. Yango wana bóbondela Nzambe, po ápesa ngai nguya ya kosakola ndenge nasengeli kosala.
[21] Ndeko na biso ya bolingo, Tishike, oyo asalelaka Nkolo na motema malamu, akoyebisa bino sango na ngai nyonso, po bóyeba soki nakómi ndenge nini.
[22] Natindeli bino ye, po álobela bino ndenge nini tozali, pe ákitisa bino mitema.
[23] Nzambe Tata pe Nkolo na biso Yezu Kristo bápesa bandeko nyonso boboto, bolingo pe bondimi.
[24] Bolamu ya Nzambe ézala na bato nyonso oyo balingaka Nkolo na biso Yezu Kristo na bolingo ezangá suka.