Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:10

[1] Bongo, lokola nakómi moto ya boloko po na Nkolo, nabondeli bino bózala na bizaleli ya malamu, oyo ebongi na bato Nzambe abengi.

[2] Bótikaka lofundu pe bózalaka na boboto; bókangaka mitema pe bolimbisanaka na bolingo nyonso.

[3] Bósanganaka na boboto. Molimo ya Nzambe akómisi bino lisanga moko, boye bótiaka molende po na kobatela yango.

[4] Bino nyonso bozali moto se moko: Molimo ya Nzambe azali se moko; pamba té Nzambe abengaki bino nyonso po bótia mitema na bomengo se moko oyo ye abombelá bino.

[5] Nkolo azali se moko, bondimi moko, batisimo pe moko.

[6] Nzambe azali bobele moko; ye nde Tata na biso nyonso, atambwisaka biso nyonso, afandaka pe asalaka na kati ya mitema na biso nyonso.

[7] Kasi makabo ya Molimo oyo Kristo akabeli biso, ezali ndenge moko té. Ye apesi moto na moto na kati na biso likabo na ye.

[8] Yango wana ekòmamá boye: “Tango amataki likolo, amemaki banguna oyo akangaki, pe akabelaki bato makabo.”

[9] “Amataki” elakisi nini? Elakisi 'tè Kristo akitaki na se.

[10] Moto oyo akitaki, ye pe moto amataki na Likolo, po átondisa Likolo ná se na bolamu na ye.

[11] Ye nde moto atie bato mosusu bantoma, bamosusu baprofete, bamosusu bateyi ya Sango Malamu, bamosusu babokoli ya bato ya Nzambe pe bomosusu balakisi.

[12] Azali kosala bongo po na kobongisa bato ya Nzambe, bákokisa misala na bango pe bákóma nzoto ya Kristo.

[13] Boye biso nyonso tokozala na bondimi se moko, pe tokoyeba malamu penza Mwana ya Nzambe. Na ndenge wana tokobanda kaka kokola tii tango tokokóma bamikóló, pe tokokokana ná Kristo ye moko.

[14] Yango wana, tokozala lisusu lokola bana mike té. Mateya ya ndenge na ndenge ekobenda biso té, ndenge mipepe ebendaka bwatu. Tokolanda bato ya mayele mabe té oyo bakosaka pe bateyaka makambo ya lokuta.

[15] Kasi bolingo ekotinda biso tóloba bobele makambo ya solo; bongo tokokola na ndenge nyonso, tii tokokokana ná Kristo. Ye azali lokola motú;

[16] biteni nyonso ya nzoto ekangamá na ye malamu, pe misisa esimbá nzoto mobimba. Eteni moko moko ezali kosala mosala na yango, pe nzoto mobimba ezali kokola pe kokóma makasi na bolingo.

[17] Bongo, na kombo ya Nkolo Yezu nazali kokebisa bino boye: bótika bizaleli ya bato oyo bayebi Nzambe té pe balandaka makanisi ezangá tina.

[18] Mayele na bango ekómá molili, bazangi bomoi oyo Nzambe apesaka, bayebi eloko moko té, po bazali mitú makasi.

[19] Bakanisaka makambo ya malonga té, kasi bamipesaka mobimba na makambo ya soni pe ya mobulu ya ndenge nyonso.

[20] Kasi bino bozwaki mayele yango té, tango balakisaki bino Kristo!

[21] Ya solo boyokaki sango na ye; bateyaki bino mateya na ye, pe boyebi 'tè Yezu azali moto ya solo.

[22] Bótika bizaleli na bino ya liboso, ya “bato ya kala”; pamba té baoyo bazali na bizaleli ya “bato ya kala” bazali kobeba, po balukaka kaka makambo ezangá tina.

[23] Kasi bóbongisa mitema pe makanisi na bino, ékóma ya sika:

[24] bózwa bizaleli ya “bato ya sika” oyo Nzambe asalá ndenge ye moko azali; boye bokozala ya solo penza bato ya bosembo pe ya bosantu.

[25] Yango wana bótika lokuta. Moto na moto álobela moninga na ye makambo ya solo, pamba té biso nyonso tozali biteni ya nzoto moko.

[26] Ata moto asiliki, ásala lisumu té. Ata moto ayoki kanda, ábomba yango moi mobimba té.

[27] Bópesa zabolo nzela té.

[28] Moto oyo azalaki koyiba, áyiba lisusu té, kasi ándima komona pasi na mosala ya maboko na ye moko, boye akozwa biloko ya kokabela bato bakelelá.

[29] Bótika songi-songi; kasi soki likambo ezali, bóloba nde oyo ekoki kosalisa bato, boye ekomema bolamu na baoyo bakoyoka yango.

[30] Bóyokisa Molimo Mosantu ya Nzambe mawa té, pamba té azali elembo oyo Nzambe atieli bino, elakisi 'tè ye akoya kosilisa boumbu na bino, na mokolo ya suka.

[31] Bólongola na kati na bino makambo nyonso ya mabe: kanda, koswana, koyinana, kotomboka, kofingana.

[32] Kasi bólinganaka, bósalisanaka pe bólimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino po na Kristo.

Ba-Efezien — Chapters