Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:04

[1] Kala, bino bozalaká lokola bato bakufá po na mabe pe masumu oyo bobandaká kosala.

[2] Bozalaká kotosa mokonzi ya mokili oyo, molimo mabe oyo etambolaka lokola mopepe, pe ezali kosala na mitema ya bato batosaka Nzambe té.

[3] Ezali bobele bino té, biso nyonso pe tozalaká na molongo na bango; tobandaki kolanda baposa na biso nyonso ya bomoto. Ya solo, tozalaká lokola bato nyonso, bomoto na biso ezalaki kobenda etumbu ya Nzambe.

[4] Kasi Nzambe ayokelaka bato mawa mingi; alakisaki biso bolingo monene.

[5] Pamba té tozalaká lokola bato bakufá, likolo ya masumu na biso; kasi Nzambe apesi biso bomoi, nzela moko ná Kristo. Ya solo, bobiki po na bolamu ya Nzambe.

[6] Ye moto asekwisi biso, pe afandisi biso na esika ya lokumu na Likolo, lisanga na Kristo Yezu.

[7] Pamba té Nzambe azali kolinga biso na lisanga na Kristo Yezu; asalaki nyonso po bolamu na ye ya ndelo té émonana, tango makambo ya sika ekoya.

[8] Ya solo, bobiki po na bolamu ya Nzambe po bondimeli ye. Kobika wana euti na bino té, kasi ezali likabo ya Nzambe.

[9] Euti na misala na biso té, boye moto moko té akoki kobeta tolo.

[10] Pamba té tozali bikelamo ya Nzambe. Ye asalá biso na lisanga na Kristo Yezu, po tókokisa misala ya malamu oyo abongiselaká biso banda kala.

[11] Bókanisa ndenge bozalaká kala. Bayuda bazalaká koloba 'tè bino bozali bato ya Nzambe té, po bokatisá nzoto té. Bobele bango nde bato bazali “ekolo ya Nzambe,” po bakatisá nzoto; nzokande ezali nde bato kaka batiaka bango elembo yango na nzoto.

[12] Na tango wana boyebaki Kristo té; bozalaki bato ya ekolo ya Israel té. Boyokani ya Nzambe, ná bolamu oyo ye alakaká bato na ye, boyebaki yango té. Bozalaki kotia mitema na yango té, boyebaki kutu Nzambe té.

[13] Kasi sik'oyo bosi'bosanganá na Kristo Yezu! Bino bato bozalaká mosika ya Nzambe, sik'oyo bokómi penepene na ye, po na makila ya Kristo.

[14] Pamba té ye moto ayeelaki biso boboto. Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, akómisá bango ekolo se moko. Bonguna oyo ezalaki lokola lopango ekaboli bango, ye apanzaki yango tango babomaki ye.

[15] Alongolaki mibeko nyonso ya Bayuda, po 'tè átia boboto na kati ya Moyuda ná moto ya ekolo mosusu, pe ákómisa bango moto ya sika se moko, oyo asangani na ye penza.

[16] Tango babomaki Kristo na kuruze, ye asilisaki bonguna ya bato; azongisi boyokani na kati na bango ná Nzambe, pe akómisi bango nyonso lokola nzoto se moko.

[17] Bongo amemeli bato nyonso Sango Malamu ya boboto, ézala bino bato bozalaki mosika ya Nzambe, pe baoyo bazalaki penepene na ye.

[18] Boye po na Kristo, biso Bayuda ná bato ya bikolo mosusu, tozwi nzela ya kokota epai ya Tata, awa tozwi Molimo se moko.

[19] Ya solo, bino bato bozali Bayuda té, botikali lisusu bapaya té; kasi bozali bato ya libota ya Nzambe penza, bokómi bana-mboka esika moko ná bato ya Nzambe.

[20] Bino ná bango bozali lokola mabanga oyo Nzambe azali kotòngela Ndako na ye. Bantoma ná baprofete bazali fondasion na yango, pe Kristo Yezu ye moko azali libanga monene oyo esimbi Ndako mobimba.

[21] Pamba té mabanga nyonso ekangamá na Nkolo, po ye ákómisa yango Ndako ya bosantu ya Nzambe.

[22] Na lisanga na ye, bino pe bozali kotòngama esika moko, po bókóma Ndako ya Nzambe, awa bozwi Molimo na ye.

Ba-Efezien — Chapters