[1] Mbote na bino nyonso, bato ya Nzambe oyo bozali na lisanga na Kristo Yezu na mboka Filipi, ná bakengeli ya Eklezya pe basalisi na yango. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata na biso, pe na Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo pe Timoté, basali ya Kristo Yezu, totindeli bino mokanda oyo.
[3] Mbala nyonso nakanisaka bino, napesaka Nzambe na ngai mersi.
[4] Tango nyonso oyo nabondelaka ye po na bino, nakanisaka na esengo monene
[5] ndenge bozali kosangana ná ngai na mosala ya Sango Malamu, banda mokolo ya liboso tii lelo.
[6] Ya solo, ezali Nzambe moto abandaki mosala oyo ya kitoko na kati na bino; nayebi 'tè ye akolemba té tii akosukisa yango mokolo Kristo Yezu akozonga.
[7] Ebongi nákanisaka boye po na bino nyonso, po bokoteli ngai na motema. Pamba té ata nazali sik'oyo na boloko to tango nazali na bonsomi po na kobatela pe kopanza Sango Malamu, bino nyonso bozwi bolamu ya Nzambe, lisanga na ngai.
[8] Nzambe ayebi 'tè nalingaka bino nyonso na bolingo ya Kristo Yezu penza.
[9] Nabondelaka Nzambe, ásala 'tè bolingo na bino ékola kokola penza, ápesa bino mayele pe áfungola bino miso,
[10] po bóyeba kopona makambo ya tina. Boye bokozala bato ya solo, pe bokomema ata ngambo moko té mokolo Kristo akozonga.
[11] Bokotonda na makambo ya malonga oyo euti na Yezu Kristo. Na ndenge wana lokumu nyonso ekokende epai ya Nzambe.
[12] Bandeko, nalingi bóyeba 'tè makambo oyo ekweelaki ngai, esukaki kaka malamu, po Sango Malamu eyei kutu kopanzana po na yango.
[13] Pamba té basoda nyonso oyo bakengelaka na ndako ya mokonzi ná bato mosusu ebele penza, basi'bayebi 'tè nakoti boloko po na Kristo.
[14] Pe bandeko mingi bazali kozwa molende po na kotiela Nkolo Yezu mitema, awa bazali komona ngai na boloko. Boye babandi kotia makasi, pe babangaka té po na kosakola maloba ya Nzambe.
[15] Ya solo, bato mosusu bazali kosakola sango ya Kristo po bayokelaka ngai zuwa, pe bakómi koluka báleka ngai na mosala. Kasi bamosusu bazali kosakola yango na makanisi ya malamu.
[16] Bango basalaka na bolingo po bayebi 'tè Nzambe atie ngai na boloko bobele po názwa nzela ya kosakola Sango Malamu.
[17] Kasi bato mosusu wana basakolaka sango ya Kristo na mitema mibale, po na komilakisa. Bakanisi 'tè bakoki kobakisela ngai bapasi, lokola nazali na boloko.
[18] Likambo té! Nasepeli po bango nyonso bazali kaka kosakola sango ya Kristo, ata makanisi na bango ezali ya malamu to ya mabe. Pe nakotika kosepela té,
[19] pamba té lokola bino bozali kosambela po na ngai, pe Molimo ya Yezu Kristo azali kosalisa ngai, nayebi 'tè makambo nyonso wana ekosuka malamu, pe nakobika.
[20] Natie penza motema 'tè nakoyoka soni ata moke té. Nakoki kotia tembe té; sik'oyo lokola mikolo nyonso, makambo oyo ezali kokweela ngai ekopesa Kristo lokumu, ata soki nabiki to nakufi.
[21] Pamba té, po na ngai bomoi ezali Kristo. Pe soki nakufi, nazwi kutu bomengo koleka!
[22] Kasi soki nazali kaka na bomoi, nakoki kosala mosala ya tina; bongo nayebi té eloko nini nakoki nanu kopona.
[23] Makambo oyo mibale esilisi ngai mayele: nákufa po názala esika moko ná Kristo, yango nde eleki malamu;
[24] kasi po na bino eleki malamu nátikala bobele awa na mokili.
[25] Yango wana nakoki kotia tembe té; nayebi 'tè nakokufa té, nakotikala epai na bino nyonso, po bondimi na bino ékola pe éyeela bino esengo.
[26] Bongo tango nakozongela bino, bokozala na esengo mingi koleka po na ngai, na lisanga na Kristo Yezu.
[27] Likambo moko eleki: bózala na bizaleli oyo elakisaka 'tè botosaka Sango Malamu ya Kristo. Boye soki nayei kotala bino, námona yango; pe soki nazwi nzela té, náyoka 'tè bozali kaka na molende, bosangani na makanisi moko, pe bobundaka na motema moko po na bondimi oyo euti na Sango Malamu.
[28] Bóbanga banguna na bino ata moke té. Molende na bino ekolakisa bango 'tè bazali kobunga, kasi bino bokobika; nyonso ekosalama na makasi ya Nzambe.
[29] Pamba té bolamu na ye ekómisi bino bato ya Kristo: bosengeli kaka kondimela ye té, kasi komona pe pasi po na ye.
[30] Bongo bokómi kobunda etumba oyo ngai pe nabundaka, ndenge bomonaki liboso, pe bozali koyoka sik'oyo na mosika.