Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:47

[1] Bozali bana ya Nzambe oyo ye alingaka, bósalaka lokola ye.

[2] Bólinganaka ndenge Kristo alingaki biso; ye amikabaki po na biso, lokola libonza oyo esepelisaka Nzambe.

[3] Bozali bato ya Nzambe; yango wana bóboya kindumba, lokoso, to makambo ya soni ézala ya ndenge nini; bótanga kutu ata kombo na yango té.

[4] Ebongi té bósolola masolo ya mabe, ya bozoba, to ya soni. Masolo na bino ézala bobele po na kopesa mersi na Nzambe.

[5] Bóyeba 'tè ata moto moko té akoki kozwa esika na bokonzi ya Kristo pe ya Nzambe, soki asalaka kindumba to makambo ya soni, to pe azali moto ya lokoso ya mbongo, pamba té moto wana akamataka mbongo lokola nzambe na ye.

[6] Moto moko té ákosa bino na maloba ya pamba. Po na makambo ya ndenge wana, kanda ya Nzambe ekweelaka bato oyo batosaka ye té;

[7] boye bókota na molongo na bango té.

[8] Liboso bozalaká na molili; kasi sik'oyo bosangani na Nkolo, bokómi kongenga lokola moi. Yango wana, bósalaka kaka lokola bato oyo batambolaka na moi,

[9] pamba té bango babimisaka bobele misala ya malamu, ya bosembo pe ya solo.

[10] Bóyeba kopona makambo oyo esepelisaka Nkolo.

[11] Bósanganaka té ná bato oyo bazali na molili pe basalaka makambo ezangá tina; kasi bóbimisa mabe na bango na miso ya bato nyonso.

[12] Makambo bango basalaka na kobombama, ezali soni po na koloba yango.

[13] Kasi ebongi bino bato ya moi bóbimisa yango na miso ya bato;

[14] boye moi na bino ekomonisa mabe na bango malamu penza. Yango wana balobaka: “Yo moto olali pongi, lamuka! Longwa na kati ya bato bakufá, pe Kristo akongengisa yo.”

[15] Bókeba malamu na bizaleli na bino. Bózala lokola bazoba té kasi lokola bato ya mayele.

[16] Awa tango ezali nanu, bósalela yango malamu, pamba té mikolo oyo ezali mabe.

[17] Boye bózala bazoba té, kasi bóyeba malamu makambo oyo Nkolo Yezu alingaka.

[18] Bólangwa masanga té, soki té bokokóma bato ya mobulu; kasi bótonda na Molimo ya Nzambe.

[19] Bólendisana na miziki pe na banzembo ndenge na ndenge oyo Molimo alakisaka; bóyembela pe bókumisa Nkolo na motema mobimba.

[20] Tango nyonso bópesaka Nzambe Tata mersi po na makambo nyonso, na kombo ya Nkolo na biso Yezu Kristo.

[21] Bino bato botosaka Kristo, bótosanaka pe bino na bino.

[22] Basi, bótosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo.

[23] Pamba té Kristo azali motú, Eklezya nde nzoto na ye; ye moto azali Mobikisi na yango. Se ndenge wana pe, mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.

[24] Boye basi basengeli kotosa mibali na bango na makambo nyonso, ndenge Eklezya etosaka Kristo.

[25] Bino mibali, bólingaka basi na bino, ndenge Kristo alingaka Eklezya pe apesaki bomoi na ye po na yango.

[26] Asukoli Eklezya na mai ya batisimo pe na Maloba ya Nzambe, po yango ékóma bosantu,

[27] ékóma na miso na ye lokola mwasi ya lokumu pe ya kitoko oyo azangi makwanza to banzela-nzela; alingi Eklezya ézala ya bosantu penza, pe ézala na mabe ata moke té.

[28] Ndenge wana mibali pe bálingaka basi na bango lokola nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye, azali komilinga ye moko.

[29] Ata moto moko té amiyinaka, kasi bato nyonso baleisaka nzoto pe babatelaka yango. Kristo asalaka ndenge moko po na Eklezya,

[30] pamba té tozali biteni ya nzoto na ye.

[31] Ekòmamá boye: “Yango wana mobali atikaka tata na ye ná mama na ye, pe asanganaka na mwasi na ye; boye bango mibale bakómaka se moto moko.”

[32] Maloba oyo ebombá sekelé moko ya monene; nalobi yango po na Kristo pe Eklezya.

[33] Kasi ezali pe po na bino: mobali nyonso na kati na bino álinga mwasi na ye ndenge ye moko amilingaka; pe mwasi nyonso átosa mobali na ye.

Ba-Efezien — Chapters