Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:24

[1] Yango wana ngai Polo nazali kobondela Nzambe likolo na bino. Bakangi ngai na boloko po nazali mosali ya Yezu Kristo; pe nandimi bapasi oyo po na bino.

[2] Ya solo, bosi'boyoki ndenge Nzambe, na bolamu na ye, apesi ngai mosala po na bino.

[3] Ye moko moto alakisaki ngai sekelé na ye ndenge nasi'nakòmeli bino na mokuse.

[4] Bongo lokola bozali kotanga mokanda oyo, bokoki komona 'tè nayebi penza sekelé ya Kristo.

[5] Nzambe ayebisaká yango na bato ya kala té; kasi sik'oyo Molimo na ye alakisi yango na bato na ye ya bosantu, bantoma pe baprofete na ye.

[6] Sekelé yango ezali boye: po na Sango Malamu, bato ya bikolo nyonso babandi kozwa bolamu ya Nzambe ndenge moko ná Bayuda; bakómi biteni ya nzoto moko; Nzambe akabeli bango nyonso bomengo oyo alakaki, na lisanga na Kristo Yezu.

[7] Nakómi mosali ya Sango Malamu yango po Nzambe asalelaki nguya na ye, na ndenge akabeli ngai bolamu na ye.

[8] Atako nazali moto ya sima na kati ya bato nyonso ya Nzambe, Nzambe apesi ngai bolamu oyo: náyebisa bato ya bikolo nyonso 'tè bomengo ya Kristo ezangá ndelo;

[9] nálakisa bango polele sango ya Nzambe oyo asalá biloko nyonso: ndenge azali kokokisa sekelé oyo abombaká uta na ebandeli.

[10] Boye, na ndenge ye asalaka na kati ya Eklezya, milimo ya Likolo oyo babengaka “Bakonzi ya Likolo ná se,” yango nyonso ekoki komona sik'oyo 'tè mayele ya Nzambe ezali na suka té.

[11] Uta na ebandeli Nzambe akanaká kosala bongo; akokisi mokano wana na mosala ya Nkolo na biso Kristo Yezu.

[12] Na lisanga na Kristo tosi'tozwi bonsomi, totiki kobanga; boye tokoki kokóma penepene ya Nzambe, po na bondimi na biso.

[13] Nasengi bino kaka bólemba té po na bapasi oyo nazali koyoka po na bino: ezali bobele po na bolamu na bino.

[14] Yango wana nafukameli Nzambe, Tata

[15] oyo apesaka bomoi na mabota nyonso, ézala oyo ezali na Likolo to awa na se.

[16] Nasengi ye, ásalela nguya na ye ya suka té, bongo Molimo na ye ápesa bino makasi po bótonda na molende.

[17] Nasengi ye ápesa bino bondimi ya solo, po Kristo áfanda libela na mitema na bino, bongo bolingo épesa bino makasi, ndenge misisa esimbaka nzete pe ndenge fondasion esimbaka ndako.

[18] Boye, lisanga na bato nyonso ya Nzambe, bokokoka koyeba ndenge bolingo ya Kristo ezali monene penza, ezali na suka té,

[19] pe eleki mayele nyonso. Oyo nde eloko nasengeli bino: bótonda na bomengo nyonso ya Nzambe.

[20] Nzambe azali na nguya ya kosala makambo nyonso penza, koleka oyo tokoki kosenga to kokanisa; nguya yango nde moto esalaka na mitema na biso.

[21] Bákumisa ye na kati ya Eklezya, na lisanga na Kristo Yezu, tango nyonso seko. Amen!

Ba-Efezien — Chapters