Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:36

[1] Baoyo nyonso bazali baumbu, basengeli kotosa bakonzi na bango na makambo nyonso, po moto moko té átsiola kombo ya Nzambe to mateya na biso.

[2] Soki bakonzi na bango bazali bandimi, báboya kotosa bango té atako bazali kozwa bango lokola bandeko. Nzokande lokola bazali kosalela bandimi pe bandeko ya bolingo, basengeli kosalela bango malamu koleka. Makambo osengeli koteya pe kosakola nde yango oyo.

[3] Soki ezali na bato oyo bateyaka mateya mosusu, pe balandaka té maloba ya solo ya Nkolo na biso Yezu Kristo, to mateya ya bato oyo bandimeli Nzambe,

[4] bato yango basi'batondá na lofundu, pe bayebi ata eloko moko té. Babeli maladi ya kotia tembe na makambo nyonso pe ya kolobaloba pamba. Nyonso wana moto ebendaka zuwa, koswana, kofingana, makanisi mabe.

[5] Bato yango batondá na tembe, mayele na bango esi'ebebá, bayebi makambo ya solo té; bakanisaka 'tè kotosa Nzambe epesaka bomengo.

[6] Tembe té, soki moto alukaka bomengo ya mokili oyo té, kotosa Nzambe epesaka ye bomengo monene.

[7] Pamba té toyaki maboko pamba na mokili, tokozonga maboko pamba.

[8] Bongo soki tozali na bilei pe bilamba, wana ekoki na biso.

[9] Kasi baoyo balukaka kozala na mbongo mingi, bakweyaka na motambo po na baposa na bango ya bozoba pe ya mabe, oyo ebebisaka bato pe ebungisaka bango.

[10] Pamba té mabe nyonso eutaka na lokoso ya mbongo. Likolo na yango bato mosusu babungisaki bondimi, pe bamiyokisaki pasi mingi.

[11] Kasi yo moto omipesá na Nzambe, kima makambo nyonso wana. Luka nde makambo ya bosembo, bondimi, bolingo pe boboto; zala moto ya losambo pe yebaka kokanga motema.

[12] Bondimi ezali etumba moko ya malonga; tia molende po na yango, bongo okozwa bomoi ya seko oyo Nzambe abengelaki yo, mokolo osakolaki maloba ya kitoko ya bondimi, na miso ya bato ebele.

[13] Boye nasengi yo na miso ya Nzambe oyo apesaka bomoi na bikelamo nyonso, pe na miso ya Kristo Yezu oyo asakolaki bondimi na ye na ndenge ya kokoka penza, tango Ponse Pilate azalaki kosambisa ye:

[14] Landa makambo oyo batindaki yo; zala moto ya bosembo pe ya motema pembe, tii mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akozonga.

[15] Nzambe akotinda ye na mokolo ye moko atiá. Bobele Nzambe moto azali Mokonzi ya nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi nyonso pe Nkolo ya bankolo nyonso.

[16] Kaka ye nde moto akoki kokufa té, afandaka na mboka na ye ya moi oyo moto moko té akoki kokóma. Moto moko té asi'amoná ye, pe moko té akoki komona ye. Lokumu pe nguya ya seko ézala na ye. Amen.

[17] Yebisa baoyo bazali na bomengo ya mokili oyo 'tè bátika lolendo, bátiaka mitema na bomengo na bango té, po yango eumelaka té; kasi bátiaka mitema nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso bomengo nyonso po tósepelaka na yango.

[18] Yebisa bango básalaka makambo ya malonga; misala na bango ya malamu ékómisa bango bato ya bomengo ya solo. Bákabelaka bato biloko na bango na motema moko;

[19] na ndenge wana bakonduka bomengo moko ya kitoko oyo ekoumela po na mikolo ekoya; bongo bakozwa bomoi ya solo.

[20] Ndeko Timoté, batela makambo nyonso oyo Nzambe atie na maboko na yo; boya bilobaloba ya bato oyo batsiolaka Nzambe, boya pe tembe ya baoyo bamimonaka bato ya mayele.

[21] Bato mosusu oyo balandaki mayele yango, bayaki kobungisa bondimi. Bolamu ya Nzambe ézala na bino.

1 Timoté — Chapters