[1] Kogangela mobange té; kasi pesa ye toli ndenge olobaka na tata na yo. Kamata bilenge mibali lokola bandeko na yo,
[2] bamama lokola mama na yo, pe bilenge basi lokola bandeko na yo, na bosembo nyonso.
[3] Tosa basi bakufelá mibali, baoyo bazangá moto ya kosalisa bango.
[4] Kasi soki mwasi moko akufelá mobali azali na bana to na bakoko, mokumba na bango ya liboso ezali: kolakisa bolingo na bango ya bandimi epai ya bato na bango, pe kozongisa bolamu na mama to na koko na bango ya mwasi. Wana nde makambo esepelisaka Nzambe.
[5] Mwasi oyo akufelá mobali pe azangá moto ya kosalisa ye, amesaná kotia motema epai ya Nzambe; butu moi alembaka té po na kosambela pe kosenga ye lisalisi.
[6] Kasi oyo alandaka bisengo ya mokili azali lokola moto akufá kala, atako azali nanu na bomoi.
[7] Pesa bango toli ya ndenge wana, po bázala na bizaleli ya malamu na miso ya bato.
[8] Soki moto asalisaka bandeko na ye té, pe mingi penza baoyo bafandi na ye ndako moko, abebisi bondimi, pe azali mabe koleka moto oyo andimelaka Nzambe té.
[9] Talaka malamu mokanda bakòmelaka bakombo ya basi oyo bakufelá mibali. Soki mwasi akufeli mobali, bakoki kokòma kombo na ye bobele soki akokisi mbula tuku motoba (60), soki azalaki mwasi ya makangu té,
[10] pe soki ayebani na bato po na misala na ye ya malamu. Bátala pe soki abokolaki bana na ye malamu, soki abandaki koyamba bapaya na ndako na ye, soki azalaki komipesa po na kosalela bato ya Nzambe mosala, po na kosilisa mawa ya bato bazali na pasi, pe kosala makambo ya malamu ndenge na ndenge.
[11] Kasi bilenge basi oyo bakufelá mibali, kokòma bakombo na bango té. Pamba té soki basi'bapesi Kristo elaka, bongo na sima batiki ye po bakómi kolanda baposa na bango pe balingi kobala lisusu, bakomema ngambo po batali elaka na bango ya liboso pamba.
[13] Lisusu, lokola basalaka eloko moko té, batambolaka pamba-pamba na bandako ya bato, bakómaka kutu bato ya bilobaloba, balingaka kokota na makambo oyo etali bango té, pe babimisaka makambo oyo ebongi té.
[14] Yango wana nalingi 'tè bilenge basi oyo bakufelá mibali bábala lisusu, bábota bana pe bábatelaka bandako na bango, po banguna na biso bázwa nzela ya kotónga biso té.
[15] Pamba té basi mosusu bakufelá mibali basi'batiká nzela ya malamu po na kolanda Satan.
[16] Soki mondimi ya mwasi azali na bandeko ya basi baoyo bakufelá mibali, esengeli ásalisa bango, átikela Eklezya mokumba wana té; boye Eklezya ekokoka kosalisa baoyo batikalá penza bango moko.
[17] Bambuta-muntu oyo bazali kotambwisa Eklezya malamu, bakoki kozwa lifuta mbala mibale; mingi penza baoyo bamonaka pasi na mosala ya kosakola maloba ya Nzambe pe na koteya.
[18] Pamba té ekòmamá boye: “Kokanga ngombe monoko té, tango ozali kosalela yango po na kobimisa mbuma ya blé.” Ekòmamá pe “Moto ya mosala asengeli kozwa lifuta na ye.”
[19] Soki moto ayei kofunda mbuta-muntu moko, okoki kondimela ye bobele soki batemwen mibale to misato bamonani.
[20] Po na baoyo bakwei na masumu, bimisa mabe na bango na miso ya bato nyonso, po baoyo batikali bábanga.
[21] Na miso ya Nzambe, ya Kristo Yezu, pe ya ba-anjelu oyo Nzambe aponá, nasengi yo ótosa mitindo wana; kopona bilongi ya bato té, kasi sala na bato nyonso ndenge moko.
[22] Soki moto alingi komipesa na mosala ya Eklezya, kotiela ye maboko noki té; kosangana té na masumu ya bato mosusu. Luka nde kobatela motema na yo ézala pembe.
[23] Tika komela bobele mai, kasi salelaka pe mwa-vinu po na libumu na yo, pamba té obelaka mbala mingi.
[24] Mabe ya bato mosusu esi'eyebaná, ata basambisi bango nanu té; nzokande oyo ya bato mosusu eyebanaka bobele na sima.
[25] Ndenge moko pe po na misala ya malamu: yango emonanaka polele; atako mosusu emonanaka noki té, ekoki kobombama libela té.