[1] Likambo ya liboso natindi, yango oyo: bandimi básambelaka losambo ya ndenge na ndenge, bábondelaka Nzambe pe bápesaka ye mersi po na bato nyonso,
[2] po na bakonzi minene pe bato nyonso oyo bazali kotambwisa biso, po tófanda na boboto pe kimia, bongo tókoka kokumisa Nzambe pe kozala bato ya kokoka.
[3] Yango ezali malamu pe malonga na miso ya Nzambe Mobikisi na biso;
[4] ye nde alingi bato nyonso bábika pe bándima makambo ya solo.
[5] Pamba té Nzambe azali se moko; pe moto oyo atie boyokani na kati ya Nzambe ná bato azali se moko, ye nde Kristo Yezu. Ye azwaki nzoto ya bomoto,
[6] pe amipesaki po na kolongola bato nyonso na boumbu. Asalaki bongo na tango oyo Nzambe atiá, po na kolakisa 'tè Nzambe alingi bato nyonso bábika.
[7] Wana nde tina Nzambe aponelá ngai názala moteyi, ntoma pe molakisi, po námemela bato ya bikolo nyonso sango ya bondimi pe ya solo. Nazali koloba makambo ya solo penza.
[8] Yango wana nalingi 'tè bisika nyonso mibali basanganaka po na kosambela, bázala mitema pembe tango bazali kotombola maboko; bátika kanda pe bátiana tembe té.
[9] Basi pe ndenge moko; nalingi bálata na ndenge ebongi, na ndenge ya malonga kasi na lofundu té; bálekisa ndelo té na kokangisakangisa suki, bátika kolata biloko ya or to mayaka, to bilamba ya talo mingi.
[10] Kasi bápesa nzoto na bango kilo na misala na bango ya malamu, ndenge ebongi na basi oyo balobaka 'tè batosaka Nzambe.
[11] Na tango ya mateya, basi báfanda nyee pe bálanda yango na bokebi nyonso.
[12] Napesi bango nzela té 'tè báteya to bámitia liboso ya mibali; kasi basengeli kofanda nyee.
[13] Pamba té liboso Nzambe asalaká Adamu, bongo sima ayei kosala Eva.
[14] Pe moto bakosaká ezali Adamu té, kasi ezali nde mwasi; bongo ezali ye moto ya liboso abukaki mobeko ya Nzambe.
[15] Kasi mwasi akobika tango azali kobota bana, soki akozala kobatela bondimi ná bolingo, pe komipesa mobimba na Nzambe na ndenge ekoki.