Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:56

[1] Mbote na yo Timoté, Mwana na ngai ya solo kati na bondimi. Nzambe Tata pe Nkolo na biso Kristo Yezu báyokela yo mawa, bápesa yo bolamu pe boboto. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali ntoma ya Kristo Yezu po Nzambe Mobikisi na biso pe Kristo Yezu oyo totielaka mitema, batindi ngai.

[3] Ndenge nayebisaki yo tango nazalaki kokende na rejion ya Masedwane, nalingi ótikala na Efeze, po na kopekisa bato oyo bazali koteya mateya ya lokuta.

[4] Yebisa bango bátika kolanda bilobaloba pe kotanga bakombo ebele ebele ya bakoko. Makambo ya boye ebimisaka tembe mingi, kasi ezali na tina té po na kokokisa mosala ya Nzambe oyo tokoki koyeba bobele na nzela ya bondimi.

[5] Pesa bango motindo wana po bázala na bolingo oyo eutaka na motema ya peto, na se ya motema ya malamu pe na bondimi ya solo.

[6] Bato mosusu babungá nzela oyo, pe bamipesá na maloba ya pamba.

[7] Balingaka kozala balakisi-Mibeko, bateyaka na molende nyonso, nzokande makambo oyo balobaka, bayebaka yango té.

[8] Toyebi 'tè Mibeko ezali ya malonga, soki tolandi yango na ndenge ekoki.

[9] Ebongi tóyeba malamu likambo oyo: Nzambe apesá Mibeko po na bato ya malamu té, kasi po na bato ya mobulu pe ya mabe. Bango basalaka masumu ya ndenge na ndenge, batosaka Nzambe té to biloko ya bosantu, babomaka bato, ata kutu batata to bamama na bango,

[10] basalaka kindumba, balalaka baninga na bango mibali; bamosusu batekaka bato na boumbu, bakosaka, bakataka seleka ya lokuta, pe basalaka makambo nyonso oyo ekoki té na mateya ya solo.

[11] Mateya yango nde Sango Malamu oyo Nzambe ya lokumu pe ya esengo apesá ngai po násakola.

[12] Ezali Nkolo na biso Kristo Yezu moto apesaka ngai makasi. Napesi ye mersi po atielaka ngai motema pe aponaki ngai na mosala na ye,

[13] ata nazalaki kotsiola ye, konyokola ye pe kofinga ye. Kasi ayokelaki ngai mawa po nazangaki bondimi pe nayebaki té makambo oyo nazalaki kosala.

[14] Nzokande bolamu ya Nkolo na biso Kristo Yezu eleki ndelo. Apesi ngai bondimi pe bolingo oyo eutaka na ye.

[15] Ya solo, esengeli tóndima na motema moko likambo oyo: Kristo Yezu ayaki awa na se po na kobikisa bato ya masumu. Ngai naleki bango nyonso na mabe,

[16] yango wana ye ayokelaki ngai mawa koleka, po nákóma ndakisa. Kristo Yezu alakisi bolamu na ye nyonso epai na ngai moto ya masumu koleka bato mosusu, po ámonisa polele 'tè bato ya masumu bakoki kondima ye pe kozwa bomoi ya seko.

[17] Nzambe, Mokonzi ya bileko nyonso, azali se ye moko; akufaka té pe amonanaka té. Lokumu pe nkembo ézala na ye, na bileko nyonso seko! Amen.

[18] Timoté, Mwana na ngai, kanisa maloba oyo baprofete balobaki likolo na yo; ózwa na yango molende po ólandaka batoli oyo nazali kopesa yo. Bunda etumba na ndenge ekoki.

[19] Zala na bondimi pe landaka bobele makanisi ya malamu ya se ya motema. Bato mosusu baboyaki makanisi ya malamu ya se ya motema, bongo bondimi na bango ebebaki.

[20] Imené ná Aleksandre bazali na kati ya bato wana; napesaki bango na maboko ya Satan po báyeba 'tè bakoki kotsiola Nzambe té.

1 Timoté — Chapters