[1] Ya solo, soki moto alingi kozala mokengeli ya Eklezya, toyebi 'tè azali koluka mosala moko ya kitoko.
[2] Mokengeli ya Eklezya asengeli kozala moto ya malamu, bámona ye ata na likambo moko té ya mabe, áfanda na mwasi moko kaka, ázala moto ya lokoso té kasi ya lokumu pe ya makanisi malamu; áyeba koyamba bapaya, áyeba pe koteya bato;
[3] álangwaka masanga té; átombokaka té; áswanaka té; ázala na lokoso ya mbongo té, kasi ázala nde moto ya boboto.
[4] Asengeli kokengela libota na ye moko na ndenge ekoki, pe kobokola bana na ye malamu.
[5] Pamba té soki moto ayebi kokengela libota na ye moko té, ndenge nini akokoka kokengela Eklezya ya Nzambe?
[6] Moto yango ázala pe mondimi ya sika té, soki té akokóma lofundu pe akozwa etumbu ndenge zabolo azwaká.
[7] Kasi ebongi ázala na lokumu na miso ya baoyo bazali ya libanda, po bámonela ye té pe ákweya na motambo ya zabolo té.
[8] Basalisi ya Eklezya pe basengeli kozala bato ya lokumu oyo babalolaka maloba na bango té; bámelaka masanga mingi té, pe bálukaka mbongo na mayele mabe té.
[9] Bámipesa mobimba na basekelé oyo bondimi ezali kolakisa biso, na ndenge ya makanisi oyo ezali na eloko ya mabe té na se ya motema.
[10] Esengeli bámeka bango liboso, bongo soki balongi, bakoki kozwa bango lokola basalisi ya Eklezya.
[11] Basi na bango pe basengeli kozala bamama ya lokumu; bátóngaka bato té, bázala na lokoso té, kasi bázala bato ya kokoka na makambo nyonso.
[12] Basalisi ya Eklezya basengeli kofanda na mwasi moko kaka; bábokolaka bana na bango pe bábatelaka mabota na bango na ndenge ebongi.
[13] Baoyo basalaka malamu mosala na bango ya basalisi ya Eklezya bafandaka na esika ya lokumu, pe bazwaka mayele ya kosakola bondimi oyo tozali na yango na lisanga na Kristo Yezu.
[14] Nakòmeli yo mokanda oyo, nazali na elikya 'tè nakoya kotala yo sima ya mwa-mikolo.
[15] Kasi soki naumeli, mokanda yango ekolakisa yo ndenge nini osengeli kotambola na kati ya libota ya Nzambe, elingi koloba Eklezya ya Nzambe ya bomoi, oyo ezali lokola likonzi pe fondasion ya makambo Nzambe alakisá biso.
[16] Ya solo, sekelé oyo tondimaka na botosi nyonso, ezali monene penza! Pamba té, Kristo ayaki komonana na nzoto ya bomoto; Molimo ya Nzambe alongisaki ye. Ba-anjelu bamonaki lokumu na ye; bikolo nyonso eyoki sango na ye. Na mokili mobimba bato bandimeli ye, pe Nzambe apesá ye lokumu na Likolo.