Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:49

[1] Molimo ya Nzambe alobaki polele boye na baprofete mosusu: na mikolo ya suka, bato mosusu bakotika bondimi na bango, bakobanda kolanda bato ya lokuta pe mateya ya milimo mabe.

[2] Baoyo bakolanda mateya ya ndenge wana ya lokuta pe ya mayele mabe bakobunga nzela. Bato ya mateya ya ndenge wana, makanisi ya se ya motema na bango ekozika lokola ebende bazikisi na móto.

[3] Bapekisaka kobala. Balobaka 'tè bilei mosusu ezali ekila, nzokande Nzambe asalá yango nyonso, po bandimi oyo bayebi makambo ya solo bália yango, pe bápesa ye mersi.

[4] Ya solo, nyonso oyo Nzambe asalá ezali malamu. Eloko moko té ezali mabe, soki tozali kopesa Nzambe mersi tango toliaka yango.

[5] Pamba té maloba ya Nzambe ná losambo na bino ekómisaka biloko nyonso peto.

[6] Soki opesi toli wana na bandeko, okozala mosali malamu ya Kristo Yezu; pe ekomonana 'tè oyekoli malamu maloba ya bondimi ná mateya ya solo oyo olandi.

[7] Kima masolo ya kotsiola Nzambe, pe bilobaloba ya pamba; tia molende po ómipesa mobimba na Nzambe.

[8] Molende oyo bato batiaka po na kozala nzoto makasi ezali na tina mingi té; kasi kotia molende po na komipesa mobimba na Nzambe, eleki tina na makambo nyonso; pamba té Nzambe alakaki 'tè akopesa bato na ye bolamu, na bomoi ya lelo pe na bomoi oyo ekoya.

[9] Likambo moko ya solo oyo tosengeli kondima na motema moko yango oyo:

[10] Soki tozali komona pasi na mosala pe kobunda makasi, ezali po tosi'totie mitema na Nzambe ya bomoi, oyo azali Mobikisi ya bato nyonso, mingi penza ya baoyo bandimelaka ye.

[11] Wana ezali makambo osengeli koyebisa bato pe koteya.

[12] Moto moko té ámona yo pamba po ozali nanu elenge; kasi zala nde ndakisa ya malamu epai ya bandimi, na maloba pe na misala na yo; zala moto ya bolingo, ya bondimi pe ya motema pembe.

[13] Tia molende nyonso po na kotangela bato mikanda ya Nzambe; sakolaka pe teyaka bango tii tango ngai nakoya.

[14] Kobosana té 'tè Nzambe apesaki yo nguya na ye, mokolo baprofete basakolaki po na yo, pe bambuta-muntu batielaki yo maboko.

[15] Wana ezali mosala na yo; sala yango po bato nyonso bámona 'tè ozali kokende liboso.

[16] Tia kaka molende po óbongisa bizaleli na yo ná mateya na yo. Pamba té soki obandi kosala boye okobika, pe okobikisa baoyo bayokaka yo.

1 Timoté — Chapters