Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:24

[1] Mbote na yo Timoté, Mwana na ngai ya bolingo. Nzambe Tata pe Nkolo na biso Kristo Yezu báyokela yo mawa, bápesa yo bolamu pe boboto. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali ntoma ya Kristo Yezu po Nzambe akanaki boye; pamba té alakaki 'tè akopesa bato bomoi na lisanga na Kristo Yezu.

[3] Na losambo na ngai nakanisaka yo butu moi, pe napesaka mersi na Nzambe oyo nasalelaka na eloko ya mabe té na se ya motema, ndenge bakoko na ngai bazalaká kosala.

[4] Nazali kaka kokanisa ndenge ozalaki kolela. Nazali na posa ya komona yo lisusu; boye nakotonda na esengo.

[5] Nazali kokanisa ndenge obandaki kondimela Nzambe na motema moko. Kutu koko na yo ya mwasi Lois ná mama na yo Enise bazalaká pe na bondimi wana; boye nayebi malamu 'tè yo pe ozali na yango.

[6] Yango wana nasengi yo: salelaka makabo ya Nzambe oyo ozwaki tango natielaki yo maboko.

[7] Po Molimo oyo Nzambe akabeli biso abangisaka bato té, kasi ye apesaka biso nguya, bolingo pe mayele.

[8] Koyoka soni té po na kosakola sango ya Nkolo na biso, to po na ngai moto nakotá boloko likolo na ye. Pamba té Nzambe apesaka yo makasi po óndima pasi esika moko ná ngai, likolo ya Sango Malamu.

[9] Ezali Nzambe moto abikisaki biso, pe aponaki biso tózala bato na ye. Asalaki boye po na misala na biso té, kasi bobele po ye moko, banda kala, akanaká bongo. Asi'apesá biso bolamu na ye na lisanga na Kristo Yezu, liboso 'tè ásala mokili.

[10] Bongo sik'oyo nde ayei kolakisa yango polele, awa Mobikisi na biso Kristo Yezu ayei komonana. Ye moto asukisi makasi ya liwa, pe abimiseli biso moi ya sika; yango ezali nde bomoi ezangá suka, oyo tozwi na nzela ya Sango Malamu.

[11] Ye pe moto aponaki ngai, názala moteyi, ntoma pe molakisi ya Sango Malamu yango.

[12] Ezali po na yango nde nazali komona bapasi nyonso oyo. Kasi nazali koyokela yango soni té, po nayebi moto oyo natielaka motema; pe nayebi malamu 'tè ye akoki kobatela makambo nyonso oyo atie na maboko na ngai, tii mokolo akoya kosambisa bato.

[13] Landaka bobele maloba ya solo oyo nayebisaki yo; simba malamu bondimi pe bolingo oyo tozali na yango na lisanga na Kristo Yezu.

[14] Makambo Nzambe atie na maboko na yo, bomba yango na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo afandaka na mitema na biso.

[15] Oyebi 'tè bato nyonso ya rejion ya Azie basundoli ngai. Na kati na bango Fijele ná Ermojene.

[16] Nazali kosenga na Nkolo áyokela libota ya Onezifore mawa, pamba té azalaki kolendisa ngai mbala mingi. Ata nazali na boloko, ayokaki soni té po na ngai.

[17] Tango akómaki na Rome, alukaki ngai mingi penza tii ayaki komona ngai.

[18] Nkolo Yezu ábatela ye po Nzambe áyokela ye mawa, mokolo akosambisa bato. Yo pe oyebi nyonso oyo asalaki po na ngai na Efeze.

2 Timoté — Chapters