Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:50

[1] Bongo sik'oyo, bandeko, bóbondela Nzambe po na biso, po maloba ya Nkolo Yezu épanzana noki pe ézwa lokumu bipai nyonso lokola epai na bino.

[2] Lisusu, bóbondela po Nzambe ábikisa biso na maboko ya bato mabe pe ya masumu, pamba té bato mosusu bazali na bondimi té.

[3] Nkolo akokisaka makambo alakaka. Akolendisa bino pe akobatela bino, po Monguna ásala bino mabe té.

[4] Yango wana totie motema na Nkolo 'tè bokolanda makambo oyo totindi bino, ndenge bozali kosala sik'oyo.

[5] Nkolo átambwisa mitema na bino, po bózala na bolingo ya Nzambe pe bókanga motema lokola Kristo.

[6] Bandeko, totindi bino na kombo ya Nkolo Yezu Kristo, bókima bandeko nyonso ya goigoi pe baoyo baboyaka mateya oyo topesaki bino.

[7] Bino moko boyebi malamu ndenge nini bosengeli kosala po na kolanda ndakisa na biso; pamba té tozalaki bato ya goigoi té tango tozalaki epai na bino.

[8] Tosengaki moto moko té ápesa biso bilei ya ofelé, kasi tozalaki kotia molende pe komona pasi na mosala. Tosalaki butu moi, po moko té na kati na bino ázwa mokumba na biso.

[9] Ya solo, tokoki kosenga bino lisalisi; kasi tosalaki yango té, pamba té tolingaki kopesa bino ndakisa, po bósalaka lokola biso.

[10] Lisusu, tango tozalaki epai na bino, topesaki bino mobeko boye: “Moto oyo alingi kosala mosala té, ália pe té.”

[11] Kasi sik'oyo toyoki 'tè na kati na bino bato mosusu bafandaka pamba, balingi kosala té; mosala na bango kaka kokota na makambo ya bato.

[12] Toyebisi bato ya ndenge wana pe totindi bango na kombo ya Nkolo Yezu Kristo 'tè básala mosala ya malonga, po bákoka kolia biloko oyo bango moko bazwi.

[13] Po na bino bandeko, bólemba té na kosala bolamu.

[14] Soki moto aboyi kotosa mateya oyo topesi bino na mokanda, bótia ye miso, bókima ye po áyoka soni.

[15] Nzokande bókamata ye lokola monguna té, kasi bópesa ye toli lokola ndeko.

[16] Nkolo ya boboto ye moko ápesa bino boboto tango nyonso pe na ndenge nyonso. Nkolo ázala na bino nyonso.

[17] Ngai moko Polo moto nakòmi makambo oyo: Mbote mingi na bino. Nasinyaka mikanda na ngai nyonso boye. Bótala ndenge nakòmaka.

[18] Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino nyonso.

2 Ba-Tesalonisien — Chapters