Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:17

[1] Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.

[2] Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.

[3] Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei ; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »

[4] Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.

[5] Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki ? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.

[6] Longwa na litambe kino na moto, eloko moko te ezali malamu, kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, batia kisi te mpe bapakola mafuta te.

[7] Mokili na bino ebebisami, bingumba na bino esili kozika na moto ; bapaya bazali kobebisa bilanga na bino na miso na bino, nyonso ebebisami solo, lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.

[8] Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko lokola mwa ndako moko ya matiti kati na elanga ya vino, lokola ndako ya kobombamela kati na bilanga ya bapasiteki, lokola engumba oyo ebatelami.

[9] Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.

[10] Boyoka Liloba na Yawe, bino bakambi ya engumba Sodome ! Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, bino bato ya engumba Gomore !

[11] « Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.

[12] Tango boyaka liboso na Ngai, nani abengaka bino ete boya kokota na lopango na Ngai ?

[13] Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina ! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino : bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.

[14] Motema na Ngai eyini bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza mpe bafeti na bino wana ekatama. Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, nalembi komema yango.

[15] Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.

[16] Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai ! Botika kosala mabe !

[17] Boyekola nde kosala malamu, boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, bobundela mwana etike, bokotela mwasi oyo akufisa mobali !

[18] Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » elobi Yawe. « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; ata ezali motane lokola ngola, ekokoma lokola bapwale ya meme.

[19] Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, bokolia mbuma kitoko ya mokili.

[20] Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, bokokufa na mopanga. » Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.

[21] Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba ! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango ; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.

[22] Palata na yo ekomi bosoto, vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi.

[23] Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.

[24] Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi : Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai !

[25] Nakotelemela bino, nakopetola bosoto ya palata na bino mpe nakolongola salite na bino,

[26] nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.

[27] Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, mpe bato na yango oyo bakobongola mitema bakobika na nzela ya bosembo.

[28] Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, bato oyo bakobosana Yawe bakosila.

[29] « Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente oyo bozalaki kolinga mingi ; bokoyoka pasi na mitema mpo na bilanga oyo boponaki ;

[30] bokokoma lokola nzete ya terebente oyo ekawuka makasa.

[31] Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu, mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali ; bango mibale bakozika nzela moko na moto, mpe moto oyo koboma yango akozala te. »

Ezayi — Chapters