[1] Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akomi pene ya kobotola masungi nyonso, kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda : lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ;
[2] bilombe mpe basoda ya mpiko, basambisi mpe basakoli, bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi ;
[3] bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko mpe bato oyo basalelaka maji.
[4] Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.
[5] Bato bakokoma konyokolana bango na bango : moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ;
[6] moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba : « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! »
[7] Kasi na mokolo wana, akoganga : « Te, nazali na ngai monganga te, mpe nazali na bilei to bilamba te kati na ndako na ngai ; bokomisa ngai mokonzi te ! »
[8] Yelusalemi ezali kotepatepa, mpe Yuda ekweyi ; mpo ete maloba mpe misala na bango ezali ya botomboki liboso ya Yawe, ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
[9] Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !
[10] Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
[11] Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
[12] Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, basi bazali koyangela bango. Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda !
[13] Yawe atelemi na esambiselo, atelemi mpo na kosambisa bato.
[14] Yawe akosamba elongo na bampaka mpe bakambi ya bato na Ye : « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! Botondisi bandako na bino na biloko oyo bobotoli epai ya babola !
[15] Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai mpe kotiola bomoto ya babola ; » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ?
[16] Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,
[17] Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »
[18] Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ;
[19] biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale,
[20] bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto,
[21] bapete ya mosapi, bapete ya zolo,
[22] bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike,
[23] bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
[24] Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
[25] Mibali na bino bakokufa na mipanga, basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba.
[26] Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ; boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.