[1] Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). »
[2] Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo.
[3] Nakendeki epai ya mwasi mosakoli ; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai : « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz.
[4] Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »
[5] Yawe alobaki na ngai lisusu :
[6] « Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia,
[7] Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso.
[8] Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »
[9] Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana !
[10] Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !
[11] Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo :
[12] « Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita ; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.
[13] Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde bosengeli komona lokola Mosantu, Ye kaka nde bosengeli kokumisa, Ye kaka nde bosengeli koyoka somo.
[14] Akozala lokola Esika ya bule ; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato ; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.
[15] Mingi kati na bango bakobeta mabaku, bakokweya mpe bakobukana, bakokangama na motambo, mpe bakozwa bango. »
[16] Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai.
[17] Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.
[18] Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.
[19] Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »
[20] Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
[21] Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe.
[22] Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi.
[23] Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali ; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani.