Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:30

[1] Maloba ya kosambisa Damasi : « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.

[2] Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.

[3] Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

[4] « Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.

[5] Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.

[6] Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.

[7] Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ;

[8] bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango : makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.

[9] Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele. Nyonso ekobebisama penza.

[10] Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.

[11] Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito ; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.

[12] Mawa na ebele ya bato ! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene !

[13] Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.

[14] Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka ! Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka ! Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.

Ezayi — Chapters