Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:19

[1] Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobali oyo amelaki mabele ya mama na ngai ! Soki nakutanaki na yo na libanda, nalingaki kopesa yo beze, mpe moto moko te alingaki kotiola ngai.

[2] Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade.

[3] Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto !

[4] Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino : bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.

[5] Nani oyo abimi na esobe mpe alaleli mobali na ye ya motema ? Nalamusaki yo na se ya nzete ya pome, na esika oyo mama na yo azwaki zemi na yo, esika oyo abotaki yo na pasi.

[6] Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo ; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe.

[7] Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.

[8] Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke ; azali nanu ata na mabele te. Tokosala nini mpo na ye na mokolo oyo bakoluka ye na libala ?

[9] Soki azalaki mir, tolingaki kotonga likolo na ye ndako oyo esalemi na palata ; soki azalaki ekuke, tolingaki kokanga ye na libaya ya sedele.

[10] Nazali mir, mpe mabele na ngai ezali lokola bandako milayi. Boye, na miso na ye, nazali lokola mwasi oyo azwi kimia.

[11] Salomo azali na elanga ya vino kati na Bala-Amoni, apesi yango na bakengeli ; moko na moko kati na bango azalaki kopesa mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko mpo na kosomba bambuma na yango.

[12] Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma ; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.

[13] Yo oyo ovandi kati na bilanga, baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo ; tika ete oyokisa ngai yango !

[14] Oh bolingo na ngai, kima mbangu, zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli ; kende na likolo ya bangomba oyo etondi na matiti ya solo kitoko.

Loyembo ya Salomo — Chapters