Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:44

[1] Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : Tozali na engumba moko ya makasi ; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.

[2] Bofungola bikuke mpo ete ekolo ya sembo, ekolo oyo ebatelaka boyokani, ekoka kokota !

[3] Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.

[4] Botia tango nyonso elikya na Yawe, pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso.

[5] Akitisaka bavandi ya likolo, akweyisaka engumba oyo batonga makasi, alalisaka yango penza na mabele mpe akomisaka yango putulu.

[6] Makolo ya bato ekonyata-nyata yango : makolo ya babola, matambe ya bato pamba.

[7] Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.

[8] Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo ; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.

[9] Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.

[10] Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te ; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.

[11] Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !

[12] Yawe, okopesa biso kimia, pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka.

[13] Oh Yawe, Nzambe na biso, atako bakonzi mosusu bakambaki biso, kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.

[14] Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye ; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !

[15] Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene ! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu ; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.

[16] Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.

[17] Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota, bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi.

[18] Tozalaki na zemi, tozalaki mpe kobaluka na pasi ; kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe : tomemelaki mabele lobiko te, mpe tomemelaki mokili bato ya sika te.

[19] Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.

[20] Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.

[21] Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.

Ezayi — Chapters