Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:56

[1] Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !

[2] Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela ; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.

[3] Balati-lati basaki na babalabala, bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; bazali penza kosopa mpinzoli ebele.

[4] Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.

[5] Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.

[6] Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.

[7] Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.

[8] Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi.

[9] Mayi ya Dimoni etondi na makila, kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni : nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

Ezayi — Chapters