Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:00

[1] Bino, bato ya bomengo, bólela pe bózala na mawa po na bapasi oyo ezali kozela bino.

[2] Bomengo na bino esi'ebebi, pe bampese esi'elei bilamba na bino.

[3] Mbongo na bino nyonso ekómi eloko ya pamba penza. Yango elakisi 'tè nzoto na bino moko pe ekobeba lokola nde eziki na móto. Suka ya mokili ekómi penepene, nzokande bino bozali konduka mbongo!

[4] Boboyi kofuta bato oyo balongolaka mbuma na bilanga na bino. Bóyoka ndenge bazali kolela! Nkolo ya nguya nyonso asi'ayoki kolela na bango.

[5] Awa na se bokoká na biloko nyonso pe botondá na bisengo. Boliaka mingi, bokómi mafuta penza, lokola banyama oyo ezali kozela mokolo bakoboma yango.

[6] Bokatelaka bato ya malamu etumbu pe bobomaka bango, nzokande bango basalelaka bino mitú makasi té.

[7] Yango wana, bandeko, bókanga mitema tii mokolo Nkolo akoya. Bókanisa nanu ndenge mosali-bilanga akangaka motema pe azelaka mbuma ya elanga na ye, banda tango mbula ya liboso enokaka tii na tango ya mbula ya suka.

[8] Bino pe bókanga mitema pe bózala na molende, pamba té mokolo Nkolo akoya ekómi penepene.

[9] Bandeko, moto na moto átika komilelalela na makambo bandeko na ye bazali kosala ye, po Nzambe ákatela bino etumbu té. Pamba té zuzi azali penepene na bino, etikali moke ákóma.

[10] Bandeko, bólanda ndakisa ya baprofete oyo bazalaká koloba na kombo ya Nkolo: ndenge babandaki kokanga mitema na bapasi oyo bazalaki komona.

[11] Tobengaka bango bato ya esengo, po na molende na bango. Bosi'boyoká ndenge Job akangaká motema na kati ya bapasi, pe ndenge Nkolo asukisaki makambo na ye; pamba té Nkolo alingaka bato na ye pe ayokelaka bango mawa.

[12] Bandeko na ngai, likambo eleki tina, bókata seleka té, ézala na kombo ya Likolo to ya mabelé, ata kutu seleka ya ndenge nini. Kasi bóloba kaka “Ezali bongo” to “Ezali bongo té,” po Nzambe ákatela bino etumbu té.

[13] Soki moto moko na kati na bino azali na pasi, ásambela. Soki azali na esengo, áyembela Nzambe.

[14] Soki moto moko na kati na bino azali na maladi, ábenga bambuta-muntu ya Eklezya, básambela po na ye pe bápakola ye mafuta na kombo ya Nkolo Yezu.

[15] Soki losambo yango esalami na bondimi penza, yango ekobikisa moto ya maladi, bongo Nkolo akokómisa ye nzoto kolongono, pe akolimbisa ye soki asalaki masumu.

[16] Yango wana, kati na bino na bino, bóbimisa polele masumu oyo bosalaki pe bósambela Nzambe po na baninga na bino po 'tè bóbika. Pamba té losambo ya molende ya moto ya bosembo ezali na nguya mingi penza.

[17] Ndakisa: Eliya azalaká moto lokola biso. Asengaki Nzambe na molende nyonso 'tè mbula énoka té; bongo mbula enokaki té na mboka mobimba, mbula misato na ndambo.

[18] Na sima asambeli lisusu, bongo Likolo efungwami, mbula enoki pe mabelé eboti mbuma.

[19] Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino abungi nzela ya solo, bongo ndeko mosusu azongisi ye na nzela ya malamu,

[20] bóyeba 'tè oyo alongoli moto ya masumu na nzela ya mabe, abikisi ndeko na ye; pe Nzambe akolimbisa ye masumu, atako ezali ebele.

Jake — Chapters