Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:39

[1] Bandeko na ngai, bino bato bondimaka 'tè Nkolo na biso Yezu Kristo azali na lokumu ya Nzambe, bóponaka bilongi ya bato té.

[2] Ndakisa: na tango ya losambo, bato mibale bayei kokota: moto moko ya bomengo alati pete ya or ná bilamba ya kitoko penza; pe moto mosusu ya kokelela, alati bilamba ya kopasuka.

[3] Bongo na botosi nyonso bolobi na moto oyo alati bilamba ya kitoko: “Mbuta-muntu, yaka kofanda na esika ya malamu.” Bongo boyebisi moto akelelá: “Yo, telema kuna.” To: “Fanda awa, na se ya makolo na ngai.”

[4] Soki bosali ndenge wana, bozali nde kopona bilongi ya bato oyo bayei kosambela; bokómi lokola bazuzi oyo bakataka makambo na ndenge ya mabe.

[5] Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka malamu: Nzambe aponá banani? Aponá bobele bato bakelelá na mokili oyo, po bondimi éyeela bango bomengo, pe ékómisa bango bato ya mboka na ye, ndenge alakaki baoyo balingaka ye.

[6] Kasi bino bozali komonela bato bakelelá. Nzokande bato oyo banyokolaka bino, ezali bato ya bomengo té? Bango té bato bafundaka bino na batribinal?

[7] Bango pe bato batsiolaka kombo ya lokumu oyo bozwaki, boye té?

[8] Mobeko oyo eleki mibeko nyonso, elobá boye: “Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.” Soki bokokisi yango, nde bosali malamu.

[9] Kasi soki boponaka bilongi ya bato, bozali kosala masumu; pe Mibeko elakisi 'tè botosaka Nzambe té.

[10] Ya solo, ata otosaka mibeko nyonso, soki obosani kaka mobeko moko, obuki nde mibeko nyonso.

[11] Pamba té Nzambe alobá “Kosala kindumba té”; alobá pe “Koboma moto té.” Yango wana, ata osali kindumba té kasi obomi moto, yeba 'tè obuki Mibeko.

[12] Bókanisa malamu. Mibeko ya Nzambe epesi bino bonsomi. Yango wana bósalelaka Mibeko yango, na makambo nyonso oyo bolobaka pe bosalaka. Pamba té mokolo Nzambe akosambisa bino, akotala Mibeko wana.

[13] Moto oyo aboyi koyokela baninga mawa, Nzambe pe akoyokela ye mawa té; kasi oyo ayokelaka baninga mawa, akoki kobanga té mokolo Nzambe akosambisa bato.

[14] Bandeko na ngai, soki moto asalaka misala ya bondimi té, tina nini akoki koloba 'tè: “Ngai nazali na bondimi”? Bondimi ya ndenge wana ekoki kobikisa ye?

[15] Ndakisa: ndeko moko azangi bilamba ná biloko ya kolia,

[16] pe moto moko na kati na bino alobi na ye: “Lata bilamba ya malili, pe kende kolia malamu.” Soki bolobi bongo, kasi bopesi ye té biloko oyo azali na yango posa, maloba wana ezali na tina?

[17] Ndenge moko pe po na bondimi: soki moto asalaka misala ya bondimi té, bondimi na ye ezali ya kokufa.

[18] Kasi moto moko akoki koloba boye: “Bato mosusu bamipesaka mingi na bondimi, pe bamosusu na misala.” Soki moto alobi boye, nakozongisela ye: Lakisa ngai ndenge moto akoki kondimela Nzambe, soki asalaka misala ya bondimi té; bongo na misala na ngai nakolakisa yo ndenge nandimelaka Nzambe.

[19] Yo ondimaka 'tè Nzambe azali kaka moko? Olobi penza malamu! Milimo mabe pe endimaka boye, na kobanga nyonso.

[20] Yo ozali mayele té. Olingi nálakisa yo 'tè bondimi ezangá misala ezali pamba?

[21] Ndenge nini koko na biso Abraham akómaká bosembo na miso ya Nzambe? Ezali po na misala na ye té? Pamba té asalaká mesa ya mabonza po ábomela Nzambe mwana na ye Izaak.

[22] Omoni! Misala na ye ezalaki kokokisa bondimi na ye; yango nyonso ezalaki kokende nzela moko.

[23] Yango wana ekòmamá boye: “Abraham andimelaki Nzambe, bongo Nzambe akamataki ye lokola moto ya bosembo po na bondimi na ye.” Na boye nde bakómaki kobenga ye moninga ya Nzambe.

[24] Bomoni 'tè bato bakómaka bosembo na miso ya Nzambe po na misala na bango; kasi bobele po na bondimi té.

[25] Ndenge moko pe po na Rahab, mwasi ya ndumba ya Jerikó. Ezali po na misala na ye té nde akómaká bosembo na miso ya Nzambe? Pamba té ayambaki bato oyo bayaki kotala mboka na mayele, pe akimisaki bango na nzela mosusu.

[26] Ya solo, soki moto azali kopema lisusu té, asi'akufi; se ndenge wana bondimi oyo ebimisaka misala té ezali ya kokufa.

Jake — Chapters