Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:54

[1] Po na nini boswanaka pe bobundaka? Ezali té po bolukaka bobele bisengo ya nzoto?

[2] Bolulaka biloko oyo bozali na yango té. Botondá na zuwa po na makambo ebele, kasi lokola bolongaka kaka té, bokómá koluka bitumba. Bozangaka biloko oyo bolukaka, po bosengaka Nzambe té.

[3] Ata bosengi yango na Nzambe, bozwaka té, po bozali kosenga na makanisi mabe; pamba té bolingaka kaka kobebisa bomengo nyonso po na bisengo na bino.

[4] Bosundoli Nzambe, bokómi lokola basi baboyi libala. Boyebi té 'tè kolinga makambo ya mokili oyo ezali koyina Nzambe? Moto alingaka makambo ya mokili, akómi monguna ya Nzambe.

[5] Ekòmamá boye: “Nzambe azalaka na zuwa mingi po na pema oyo afulá biso.” Bokanisi 'tè makambo oyo ekòmamá pamba?

[6] Nzokande, Nzambe asi'apesá biso bolamu moko eleki monene; yango wana ekòmamá lisusu: “Nzambe ayinaka bato ya lofundu; kasi apesaka bolamu na baoyo bamikitisaka.”

[7] Bongo bótosaka Nzambe; bóboya makambo ya zabolo, boye ye akokima bino penza mosika.

[8] Bópusanaka penepene ya Nzambe, bongo ye akoya penepene na bino. Bino bato ya masumu, bóbongisa bizaleli na bino; bino bato ya mitema mibale, bózala na motema moko kaka.

[9] Bóndima 'tè bozali bato ya mawa; bólata pili pe bóbimisa mai na miso; bótika koseka, kasi bólela; bótika kosepela, kasi bóyoka mawa.

[10] Bómikitisa na miso ya Nkolo, bongo ye akotombola bino.

[11] Bandeko, bótónganaka té. Moto oyo atóngi ndeko na ye azali kotónga Mibeko ya Nzambe. Oyo alobi 'tè ndeko na ye azali moto mabe, azali koloba 'tè Mibeko ya Nzambe ezali mabe. Esika 'tè átosa yango, ye amitie zuzi na yango.

[12] Nzokande Nzambe moto apesá Mibeko; ye pe kaka moto azali zuzi. Bobele ye nde moto akoki kobikisa to kokata etumbu ya liwa. Bongo yo ozali nani, po óloba 'tè moninga na yo azali moto mabe?

[13] Bato mosusu na kati na bino balobaka: “Lelo to lobi tokokende na mboka boye, tokofanda kuna mbula moko pe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi.”

[14] Nzokande boyebi té ndenge nini bokozala lobi. Ya solo, bozali lokola londende oyo ezali komonana po na mwa-tango moke, pe na sima elimwe.

[15] Ebongi bólobaka boye: “Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi pe tokosala makambo boye to boye.”

[16] Kasi bozali kobeta tolo na lofundu penza. Lofundu nyonso ya ndenge wana ezali mabe.

[17] Moto oyo ayebi ndenge asengeli kosala kasi aboyi kosala yango, azali nde kosala masumu.

Jake — Chapters