[1] Bandeko na ngai, na kati na bino bato nyonso báluka kokóma balakisi té. Pamba té biso balakisi, Nzambe akosambisa biso na ndenge moko ya koleka.
[2] Biso nyonso tobosanaka mbala mingi. Soki moto azali oyo abosanaka té na maloba, azali penza moto ya kokoka; akoki komibatela malamu na makambo nyonso.
[3] Ndakisa: totiaka bibende na minoko ya bapunda po yango étosa biso. Na ndenge wana tokoki kotambwisa yango.
[4] Ezali pe ndenge moko po na masuwa: ata yango ezali monene, ata mopepe ya makasi epusi yango, kasi motambwisi asalelaka yenda moko ya moke po na kobalola masuwa epai nyonso ye alingi.
[5] Se bongo pe monoko ya moto ezali eloko moko ya moke penza na kati ya nzoto, kasi esalaka makambo ya minene. Bókanisa nanu ndenge mwa-móto ya moke ekoki kozikisa zamba monene.
[6] Monoko ya moto ezali eteni ya nzoto, emonanaka lokola móto. Yango ebebisaka makambo nyonso ya mokili; epelaka na móto ya lifelo; ezikisaka moto kobanda na mbotama na ye tii na liwa.
[7] Bato bazali na mayele ya kosala 'tè banyama ya ndenge na ndenge ébanda kotosa bango; ézala banyama ya zamba, bandeke, banyoka, to bambisi.
[8] Kasi moto moko té asi'asalá 'tè monoko na ye étosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe etondá na pwazon pe elembaka té.
[9] Tosalelaka yango po na kokumisa Nzambe, Nkolo pe Tata na biso; kasi tofingelaka yango pe lisusu baninga oyo ye asalá na ndenge na ye.
[10] Kaka na monoko topesaka mersi pe tofingaka bato. Bandeko na ngai, boye ezali malamu té.
[11] Mai ya elengi ná ya bololo ebimaka esika moko?
[12] Bandeko na ngai, nzete ya figi esi'ebotá mbuma ya olive? Pe oyo ya vinu esi'ebotá mbuma ya figi? Ndenge moko pe mai ya komela ebimaka esika moko té ná mai ya mungwa.
[13] Na kati na bino nani azali na mayele? Pe nani ayebaka makambo? Ámilakisa moto ya bizaleli ya malamu, pe ákokisaka misala na ye nyonso na boboto pe na mayele.
[14] Kasi soki mitema na bino etondá na lofundu pe zuwa ya mabe, bóbanda kotombola mapeka té pe kowangana makambo ya solo.
[15] Mayele ya ndenge wana eutaka na Nzambe té, kasi ezali kaka ya bato ya mokili oyo; yango eutaka na milimo mabe.
[16] Pamba té zuwa pe koswana ebimisaka mobulu pe mabe ya ndenge na ndenge.
[17] Kasi moto azali na mayele oyo euti na Nzambe, azali moto ya motema pembe, aswanaka té, afandaka na boboto pe na kimia, ayokelaka bato mawa, asalaka makambo ya solo pe ya malamu, pe akosaka bato ata moke té.
[18] Bato oyo basalaka makambo ya boboto bazali lokola baoyo bakonaka bilanga. Mbuma oyo bakonaka ebotelaka bango bolamu.