Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:32

[1] Mbote na bino bato bozali kofanda lokola bapaya na bisika nyonso oyo ekolo ya Nzambe epanzaná: na rejion ya Pon, Galatie, Kapadose, Azie, pe Bitinie. Nzambe Tata ayebá bino banda kala; ye moto aponá bino, pe Molimo na ye akómisá bino bosantu, po bótosa Yezu Kristo, oyo asukoli bino na makila na ye. Ngai Piere, ntoma ya Yezu Kristo, natindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto mingi penza.

[3] Lokumu na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo! Ye ayokelaki biso mawa mingi penza; bongo apesi biso bomoi ya sika po tótia mitema bobele na ye. Pamba té ye moto asekwisá Yezu Kristo,

[4] pe abombelá biso bomengo na Likolo. Kuna ekoki kobeba té to kobunga.

[5] Ezali po na bino bato botie penza motema epai ya Nzambe. Ye akobatela bino na nguya na ye; boye bokobika pe bokozwa bomoi ya seko, na mokolo ya suka.

[6] Yango wana botondi na esengo, atako na mwa-mikolo oyo esengeli bózala na mawa, po bozali komona bapasi ya ndenge na ndenge.

[7] Esengeli bámeka bondimi na bino, ndenge bamekaka or na móto; nzokande bondimi na bino eleki or na tina, pamba té or ezali eloko ya koumela té. Bongo soki bosimbi bondimi na molende nyonso, bokozwa lokumu mingi penza, mokolo Yezu Kristo akomonana.

[8] Ata bomonaká Yezu Kristo na miso té, bozali kolinga ye; ata bozali komona ye sik'oyo té, bozali kondima ye. Yango wana bozwi lokumu, pe botondi na esengo ya koleka penza;

[9] pamba té bondimi na bino ezali kobikisa bino.

[10] Baprofete balobaká po na kobika yango, oyo Nzambe azalaká kobombela bino na bolamu na ye. Pamba té Molimo ya Kristo azalaká na bango, pe ayebisaká bango 'tè Kristo akomona pasi, bongo na sima akozwa lokumu. Bango bazalaká komituna pe koluka koyeba tango nini pe ndenge nini makambo yango ekosalama.

[12] Nzambe ayebisaká bango 'tè makambo oyo bazalaki kosakola ezalaki po na bango té, kasi po na bino. Ya solo, makambo minene boye, ba-anjelu bazali na posa ya komona yango; sik'oyo basakoli ya Sango Malamu bayebisi bino yango, na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindi uta na Likolo.

[13] Yango wana bóbongisa mitema na bino po na mosala, bófungola miso! Bótia mitema bobele na bolamu oyo Nzambe akopesa bino, mokolo Yezu Kristo akomonana.

[14] Bótosaka Nzambe, ndenge bana batosaka baboti na bango; bótika kolanda baposa oyo bozalaki na yango, tango boyebaki Nzambe té.

[15] Kasi lokola Nzambe oyo abengi bino azali Mosantu, bino pe bosengeli kozala bato ya bosantu, na bizaleli na bino nyonso.

[16] Pamba té, ekòmamá boye: “Bózala bato ya bosantu, po ngai pe nazali Mosantu.”

[17] Tango bozali kosambela, bobengaka Nzambe “Tata”; yango wana bótosaka ye na bomoi na bino mobimba, pamba té ye asambisaka bato nyonso ndenge moko, moto na moto ná misala na ye.

[18] Boyebi eloko nini Nzambe afutaki po na kolongola bino na bizaleli ya pamba-pamba oyo bakoko batikelá bino. Ezali mbongo té to eloko mosusu oyo ebebaka;

[19] kasi ezali eloko ya talo penza, yango nde makila ya Kristo. Ye azali lokola mwana-meme oyo ebebá ata esika moko té.

[20] Nzambe aponá ye liboso 'tè ásala mokili, bongo atindeli bino ye na mikolo oyo ya suka.

[21] Po na Kristo nde bozali kondimela Nzambe oyo asekwisá ye pe apesá ye lokumu. Boye bozali kotia mitema bobele epai ya Nzambe.

[22] Bosi'bokómi bato ya peto, na ndenge bobandi kotosa makambo ya solo. Yango ezali kotinda bino bózala na bolingo ya solo; boye bótikana té, bólinganaka penza na motema moko.

[23] Pamba té bokómi bato ya sika; nzokande oyo aboti bino mbala ya mibale ezali té moto oyo asengeli kokufa, kasi ezali nde Maloba ya Nzambe oyo ezali na bomoi pe ekoumela seko.

[24] Ekòmamá boye: “Bato nyonso bazali lokola matiti, kitoko na bango ezali lokola flere ya bilanga; matiti ekaukaka, pe flere ekufaka.

[25] Kasi Maloba ya Nkolo ekotikala seko.” Maloba yango nde Sango Malamu oyo bamemelaki bino.

1 Piere — Chapters