Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:39

[1] Bandeko, tina ezali té ya kokòmela bino na mokanda makambo etali tango to ngonga makambo wana ekosalama.

[2] Pamba té, bino moko boyebi malamu penza 'tè Mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka na butu.

[3] Tango bato bakozala koloba “tofandi na boboto pe kimia,” kaka na tango wana nde liwa ekoyeela bango na mbala moko, ndenge pasi ya kobota ezwaka mwasi oyo azali na zemi; pe bakokoka kokima yango ata moke té.

[4] Kasi, bandeko, bino bozali na kati ya molili té; yango wana mokolo yango ekoki kokanga bino té lokola moyibi,

[5] pamba té bino nyonso bozali bato ya mwinda pe ya moi. Tozali bato ya butu té to ya molili.

[6] Yango wana tólala pongi té lokola bato mosusu, kasi tófungola miso pe tómibatela malamu.

[7] Nzokande bato oyo balalaka pongi, balalaka na butu; pe baoyo balangwaka masanga, balangwaka na butu.

[8] Kasi biso bato ya moi, tómibatela malamu. Tózala lokola basoda na tango ya etumba. Bango balataka bilamba ya etumba pe bikoti ya bibende; bilamba na biso ezali: bondimi ná bolingo; ekoti na biso ezali nde kotia mitema na Nzambe po tóbika.

[9] Pamba té Nzambe asi'aponá biso. Kanda na ye ekokweela biso té, kasi Nkolo na biso Yezu Kristo akobikisa biso.

[10] Ye akufelaki biso po tango akoya, ata akuti biso tozali nanu na bomoi to tosi' tokufi, tózala seko esika moko ná ye.

[11] Yango wana, bólendisana pe bópesana mpiko ndenge bomesaná.

[12] Bandeko, tosengi bino bótosaka bato oyo bazali komipesa po na kotambwisa bino na nzela ya Nkolo pe koteya bino.

[13] Bólingaka bango mingi koleka po na mosala oyo bango basalaka. Bózalaka na boboto na kati na bino.

[14] Bandeko, tobondeli bino bóyebisa bato ya goigoi 'tè bákeba, bólendisa bato oyo babangaka, bósalisa baoyo bazangi makasi, pe bókangaka mitema po na bato nyonso.

[15] Bózala ekenge po moto moko té ázongisela moninga mabe; kasi bóluka tango nyonso kosalana bolamu bino na bino, pe epai ya bato nyonso.

[16] Bósepelaka tango nyonso,

[17] bólemba té na kosambela.

[18] Bópesaka Nzambe mersi na makambo nyonso. Wana ezali makambo Nzambe alingi bósala na lisanga na Kristo Yezu.

[19] Bópekisa té mosala ya Molimo Mosantu.

[20] Soki moto ayebisi bino makambo euti epai ya Nzambe, bózwa yango lokola eloko ya pamba té;

[21] kasi bótala nyonso soki ezali ya solo. Bóndima oyo ezali malamu,

[22] pe bóboya mabe ya ndenge nyonso.

[23] Nzambe ya boboto ye moko ákómisa bino bato na ye penza, ábatela mobimba na bino: motema, molimo pe nzoto, po bómema lisumu ata moko té, mokolo Nkolo na biso Yezu Kristo akoya.

[24] Moto oyo abengi bino akosala bongo, pamba té ye akokisaka makambo alakaka.

[25] Bandeko, bóbondela pe Nzambe po na biso.

[26] Bópesa mbote na bandeko nyonso, bóyambana ndenge ebongi na bato ya Nzambe.

[27] Nasengi bino na kombo ya Nkolo, bótangela bandeko nyonso mokanda oyo.

[28] Bolamu ya Nkolo na biso Yezu Kristo ézala na bino.

1 Ba-Tesalonisien — Chapters