[1] Yango wana, tokokaki lisusu kokanga motema té. Tozwaki mokano ya kotikala biso moko na Atene.
[2] Kasi totindelaki bino ndeko na biso Timoté, po ápesa bino makasi pe álendisa bondimi na bino; ye pe azali mosali ya Nzambe, asakolaka Sango Malamu ya Kristo esika moko ná biso.
[3] Tolingaki té moto moko na kati na bino álemba po na minyokoli oyo bozali na yango. Bino moko boyebi malamu 'tè esengeli tómona pasi boye.
[4] Tango tozalaki epai na bino, toyebisaki bino 'tè bakonyokola biso; pe boyebi 'tè esalamaki se bongo.
[5] Yango wana, lokola ngai nakokaki lisusu kokanga motema té, natindelaki bino Timoté po áya kotala ndenge bondimi na bino ekómi. Nabangaki tango mosusu 'tè Satan asi'ameki bino, pe mosala na biso ekei pamba.
[6] Kasi sik'oyo Timoté auti epai na bino pe ayei kozongela biso. Ayebisi biso sango ya malamu po na bondimi pe bolingo na bino. Alobi bozali kokanisa biso tango nyonso, pe bozali na posa ya komona biso lisusu, bobele ndenge biso pe tozali na posa ya komona bino.
[7] Yango wana, bandeko, na kati ya bapasi pe minyokoli nyonso oyo tozali komona, tozwi molende po na bondimi na bino.
[8] Sik'oyo mitema na biso ekiti, po bino bokangami kaka na Nkolo Yezu.
[9] Ndenge nini tokoki kopesa Nzambe mersi po na bino? Pamba té, totondi na esengo na miso na ye po na bino.
[10] Butu moi tozali kobondela ye na molende penza, ápesa biso nzela ya komonana lisusu na bino, po tókokisa makambo oyo ezangi na bondimi na bino.
[11] Ye moko Nzambe Tata na biso, pe Nkolo na biso Yezu, básala 'tè tókoka koya epai na bino.
[12] Nkolo álendisa bino pe átondisa bino na bolingo, boye bólingana pe bólinga bato nyonso, kaka ndenge biso tozali kolinga bino.
[13] Ápesa bino makasi, po bókóma bato ya bosantu pe ya kokoka na miso ya Nzambe Tata na biso, mokolo Nkolo na biso Yezu akoya ná bato na ye nyonso.