Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:02

[1] Bongo sik'oyo, bandeko, tolakisaki bino bizaleli oyo esepelisaka Nzambe; pe ya solo bobandi kolanda yango. Sik'oyo tobondeli bino penza na kombo ya Nkolo Yezu: bósala lisusu malamu koleka.

[2] Boyebi batoli topesaki bino na kombo ya Nkolo Yezu.

[3] Makambo Nzambe alingi yango oyo: bózala bato na ye penza, pe bóboya makambo ya soni.

[4] Moto na moto na kati na bino áfanda bobele ná mwasi na ye moko, na ndenge ya bosantu pe ya lokumu,

[5] kasi álanda baposa ya mabe té, lokola bato ya bikolo mosusu oyo bayebi Nzambe té.

[6] Na makambo oyo, moto moko té ákosa ndeko na ye, to ásala ye mabe. Nkolo ye moko akopesa etumbu na bato basalaka makambo ya ndenge wana. Tosi'toyebisaki bino polele 'tè bókeba na yango.

[7] Pamba té, Nzambe abengi biso té po tókóma bato ya mbindo, kasi po tózala na bizaleli ya bosantu.

[8] Yango wana, moto nyonso oyo aboyi toli yango, aboyi moto té kasi aboyi nde Nzambe, oyo apesaka bino Molimo Mosantu na ye.

[9] Po na makambo etali bolingo epai ya bandeko, tina ezali té ya kokòmela bino yango na mokanda; pamba té Nzambe asi'alakisi bino ndenge bosengeli kolingana.

[10] Bosalaka pe bongo na bandeko nyonso ya Masedwane mobimba. Nzokande bandeko, tobondeli bino bósala lisusu malamu koleka.

[11] Ndenge tosengaki bino liboso, bósala makasi po bófanda na kimia. Moto na moto átala makambo na ye moko, pe ásala mosala po ábikela na yango.

[12] Boye bokozwa lokumu epai ya bato bazali ya libanda, pe moto moko té akomema mokumba na bino.

[13] Bandeko, tolingi bólongola tembe po na makambo etali bato bakufá; po bózala na mawa té lokola bato mosusu oyo batielaka Nzambe mitema té.

[14] Pamba té tondimaka 'tè Yezu akufaki pe asekwaki. Ekozala ndenge moko na bato oyo bakufaki lisanga na Yezu: Nzambe akoyamba bango esika moko ná ye.

[15] Ya solo, makambo nalobi na bino euti na Nkolo: biso bato tozali nanu na bomoi pe totikali tii mokolo Nkolo akoya, tokoleka bato bakufá ata moke té.

[16] Pamba té, mongongo ya mokonzi ya ba-anjelu pe kelelo ya Nzambe ekopesa motindo, bongo ye moko Nkolo akouta na Likolo pe akokita awa na se. Na tango wana bato bakufá oyo bandimelaki Kristo bakosekwa liboso.

[17] Na sima biso bato tokozala nanu na bomoi, Nzambe akomema biso ná bango na mapata, po tókende kokutana ná Nkolo. Boye tokozala seko esika moko ná Nkolo.

[18] Bólendisana na maloba oyo, po na kolongolana mawa bino na bino.

1 Ba-Tesalonisien — Chapters