Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:25

[1] Mbote na bino, bandeko ya Eklezya ya Tesalonike, oyo ezali ya Nzambe Tata na biso pe ya Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, ná Silas pe Timoté, totindeli bino mokanda oyo.

[2] Bózwa bolamu pe boboto oyo euti na Nzambe Tata pe na Nkolo Yezu Kristo.

[3] Bandeko, tosengeli kopesa Nzambe mersi tango nyonso likolo na bino. Ebongi tósala yango po bondimi na bino ezali kokóma makasi penza, pe bolingo oyo moko moko na bino azali kolakisa epai ya bandeko ezali kokola se kokola.

[4] Yango wana tozali komikumisa na ba- Eklezya ya Nzambe, po na molende ya bondimi na bino, atako bozali komona bapasi pe minyokoli mingi po na yango.

[5] Nyonso wana elakisi 'tè Nzambe asi'abandi kokata makambo ya mokili na bosembo. Pamba té, asi'abongisi bino po bókóma bato ya mboka na ye, na ndenge bozali komona pasi po na yango.

[6] Ya solo, makambo Nzambe asalaka ezali bosembo. Akozongisa pasi na baoyo bazali koyokisa bino pasi,

[7] pe akopemisa bino bato bozali komona pasi, ná biso lokola. Akosala bongo mokolo Nkolo Yezu akouta na Likolo ná ba-anjelu na ye ya nguya,

[8] pe akoya komonana na kati ya móto ya somo, po na kopesa etumbu na bato oyo bayebi Nzambe té, pe baboyi kotosa Sango Malamu ya Nkolo na biso Yezu.

[9] Mokolo ye akoya, bango bakozwa etumbu; bakokufa libela, bakomona elongi ya Nkolo té, ézala lokumu ya nguya na ye. Kasi bato na ye bakokumisa ye, ná baoyo nyonso bandimeli ye. Bino pe bokozala esika moko ná bango, po bondimaki makambo oyo tosakolaki epai na bino.

[11] Yango wana, tozali kobondela tango nyonso po na bino. Lokola Nzambe na biso abengi bino, ábongisa bino pe álendisa bino; ákokisela bino na nguya na ye makambo ya malamu pe misala nyonso oyo bondimi na bino ezali kotinda.

[12] Na ndenge wana Nkolo na biso Yezu akozwa lokumu epai na bino, pe bino bokozwa lokumu epai na ye, po na bolamu ya Nzambe na biso pe ya Nkolo na biso Yezu Kristo.

2 Ba-Tesalonisien — Chapters