[1] Mbote na bino, bandeko ya Eklezya ya Tesalonike, oyo ezali ya Nzambe Tata pe ya Nkolo Yezu Kristo. Ngai Polo, ná Silas pe Timoté, totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto ya Nzambe.
[2] Tango nyonso topesaka Nzambe mersi pe tobondelaka ye po na bino nyonso.
[3] Butu moi tokanisaka bino na miso ya Nzambe Tata na biso, ndenge bondimi na bino pe bolingo na bino ezali kosala mosala, pe ndenge bozali kotia motema na molende nyonso 'tè Nkolo Yezu Kristo akoya.
[4] Bandeko, toyebi 'tè Nzambe alingi bino, pe aponi bino bózala bato na ye;
[5] pamba té toteyaki bino Sango Malamu bobele na maloba té, kasi totondaki penza na nguya ya Molimo Mosantu; pe tolakisi 'tè Sango yango ezali ya solo penza. Boyebi ndenge bizaleli na biso ezalaki epai na bino, po na bolamu na bino.
[6] Yango wana bobandaki kolanda ndakisa na biso pe ya Nkolo; pamba té tango boyambaki maloba ya Nzambe, bomonaki pasi mingi, kasi Molimo Mosantu ayokisaki bino pe esengo mingi.
[7] Boye bino pe bokómi ndakisa ya bandimi nyonso ya barejion ya Masedwane pe ya Akaya;
[8] pamba té kobanda epai na bino, maloba ya Nkolo ekómi kopanzana tii na Masedwane pe Akaya. Kutu bipai nyonso bazali koyoka ndenge bino bozali kondimela Nzambe; bongo tozali na posa ya kobakisa maloba té.
[9] Ya solo, bipai nyonso tozali kokóma, bato bazali kosolola ndenge bino boyambaki biso, ndenge boboyaki banzambe ya bikeko pe bobandaki kosalela Nzambe ya bomoi pe ya solo,
[10] pe ndenge bozali kozela Mwana na ye Yezu, oyo akouta na Likolo. Ezali ye nde moto Nzambe asekwisá, po ábikisa biso tango kanda ya Nzambe ekoya.