Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:53

[1] Bandeko, bino moko boyebi malamu 'tè tango toyaki epai na bino, tosalaki mosala ya punda té.

[2] Boyokaki ndenge banyokolaki biso pe bafingaki biso na vile ya Filipi. Nzokande Nzambe na biso apesaki biso kaka molende ya kosakola Sango Malamu na ye epai na bino na Tesalonike, atako mikakatano elekaki mingi.

[3] Pamba té, tango tozali koteya bato, tobimisaka lokuta té, tolobaka na mitema mibale té, tolukaka pe kokosa bato té.

[4] Kasi tolandaka kaka ndenge Nzambe alingi. Ye atie biso basakoli ya Sango Malamu, po amoni 'tè tozali bato ya kokoka. Tolobaka na kombo na ye; tolukaka kosepelisa bato té, kasi bobele Nzambe oyo ayebi mitema na biso.

[5] Boyebi 'tè mokolo moko té tolobá maloba ya sukali; tozali pe koluka bolamu na biso moko té, Nzambe ayebi yango!

[6] Tozali koluka lokumu epai ya bato té, ézala epai na bino to epai ya bato mosusu.

[7] Lokola tozali bantoma ya Kristo, tokokaki kosenga bino bómema mokumba na biso; kasi tozalaki na boboto na kati na bino, ndenge mama aleisaka pe abatelaka bana na ye.

[8] Tolukaki koyeela bino bobele Sango Malamu ya Nzambe té, kasi tozalaki na posa ya kopesa bomoi na biso po na bino, pamba té tozali kolinga bino mingi penza.

[9] Bandeko, bókanisa ndenge tozalaki kotia molende pe komona pasi na mosala epai na bino. Tango tozalaki kosakola Sango Malamu ya Nzambe, tobandaki kosala butu moi, po moto moko té na kati na bino ázwa mokumba na biso.

[10] Bino boyebi, Nzambe pe ye moko ayebi: bizaleli na biso epai na bino bandimi ezalaki ya bosantu pe ya bosembo, na miso ya bato nyonso.

[11] Boyebi 'tè tozalaki na moko moko na bino, ndenge tata azalaka na bana na ye.

[12] Tango nyonso tozalaki kolendisa bino na mpiko, po 'tè bózala na bizaleli oyo ebongi na miso ya Nzambe; pamba té ye moto abengi bino po bózwa lokumu na mboka na ye.

[13] Bandeko, tozali kopesa Nzambe mersi tango nyonso, po na ndenge boyambaki makambo oyo tosakolaki epai na bino. Boyambaki yango lokola maloba ya bato té, kasi na ndenge yango ezali penza, lokola maloba ya Nzambe; boye ezali kosala mosala na mitema na bino bato bondimi.

[14] Na yango bokómi kolanda ndakisa ya bato ya ba-Eklezya ya Nzambe na lisanga na Kristo Yezu oyo ezali na rejion Yudea. Bato ya mboka na bino babandaki konyokola bino kaka ndenge Bayuda banyokolaka bandimi oyo bazali epai na bango.

[15] Ezali bango bato babomaki Nkolo Yezu, bobele ndenge babomaká baprofete; banyokolaki biso ndenge moko, basepelisaka Nzambe té, pe bazali banguna ya bato nyonso.

[16] Balukaka kopekisa biso tókende epai ya bato ya bikolo mosusu po tómemela bango Sango Malamu oyo ekobikisa bango. Na ndenge wana masumu na bango ezali kaka kokóma ebele. Kasi kanda ya Nzambe esi'ekweeli bango.

[17] Bandeko, totikaki bino po na mwa-tango, kasi mitema na biso ezali kaka epai na bino. Yango wana, tozalaki na posa na bino mingi, pe tolukaki nzela nyonso po tómonana lisusu.

[18] Ya solo, tolingaki kozonga epai na bino. Ngai Polo nakanaki kosala bongo mbala na mbala; kasi Satan azalaki kopekisa biso.

[19] Pamba té, tina nini tozali kotia mitema epai ya Nzambe? Ezali po na bino té? Bino bozali esengo pe lokumu na biso. Pe tango Nkolo na biso Yezu Kristo akozonga, bino bato bokozala na miso na ye lokola elembo oyo ekolakisa 'tè tolongi.

[20] Ya solo, bino bopesi biso lokumu pe esengo!

1 Ba-Tesalonisien — Chapters