Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:19

[1] Bino bakonzi, bósalaka makambo ya bosembo pe ya solo epai ya baumbu na bino. Bóyeba 'tè bino pe bozali na Mokonzi, na Likolo.

[2] Bótika losambo té; bólemba té po na kopesa Nzambe mersi.

[3] Bóbondelaka Nzambe pe po na biso, ápesa biso nzela ya koyebisa bato sekelé ya Kristo. Sik'oyo nazali na boloko po na yango.

[4] Bongo bóbondela Nzambe, nákoka kosakola yango ndenge nasengeli kosala.

[5] Mbala nyonso oyo bozali kokutana ná bato oyo bazali ya libanda, bólakisaka bango bizaleli ya kokoka.

[6] Maloba na bino ézala tango nyonso ya boboto pe ya elengi; bóyeba kozongisela moto na moto eyano ndenge ebongi.

[7] Tishike, ndeko na ngai ya bolingo, akomemela bino sango na ngai nyonso. Ye asalelaka Nkolo na motema malamu, azali moninga na ngai ya mosala.

[8] Natindeli bino ye po áyebisa bino ndenge tozali, pe álendisa mitema na bino.

[9] Akoya ná Onezime, ndeko ya bolingo pe ya motema. Ye autá epai na bino. Boye bango bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.

[10] Aristarke azali na boloko esika moko ná ngai, atindeli bino mbote; ná Marko ndeko ya Barnabas. Bosi'bozwi motindo po na Marko; soki ayei epai na bino, bóyamba ye malamu.

[11] Yezu, oyo babengaka Yustus, atindeli bino pe mbote. Na kati ya bandimi oyo bazali ya ekolo ya Bayuda, ezali kaka bango bato basalaka ná ngai po na bokonzi ya Nzambe. Bango nde bazalaki kokitisa ngai motema.

[12] Epafras atindeli bino lisusu mbote; ye pe autá epai na bino. Azali mosali ya Kristo Yezu; alembaka té na kobondela po na bino, po bózala bato ya kokoka, pe bóndima kosala makambo nyonso oyo Nzambe alingi.

[13] Ya solo, nayebi ndenge amipesaka po na bino, pe po na bato ya Laodisé ná ya Iyerapolis.

[14] Luka, monganga pe moninga na biso ya bolingo, ná Demas batindeli bino mbote.

[15] Bópesa mbote na bandeko ya Laodisé, pe na Nimfa ná bandimi ya Eklezya oyo basanganaka na ndako na ye.

[16] Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bótindela yango bandimi ya Eklezya ya Laodisé, bango pe bátanga. Bongo bino pe lisusu bótanga mokanda oyo ekouta na Laodisé.

[17] Bóloba na Arshipe: “Keba na mosala oyo Nkolo apesi yo, sala yango malamu.”

[18] Ngai Polo napesi bino mbote. Nakòmi maloba oyo na maboko na ngai moko. Bóbosana té 'tè nazali na boloko. Bolamu ya Nzambe ézala na bino.

Ba-Kolosien — Chapters