[1] Sik'oyo nalingi kopesa toli na bambuta-muntu ya Eklezya na bino. Ngai pe nazali mbuta-muntu, nazali temwen ya pasi oyo Kristo amonaki, pe nakozwa lokumu, mokolo lokumu na ye ekomonana.
[2] Bótambwisaka malamu bameme oyo Nzambe apesi na maboko na bino. Bósalaka mosala na bino na matata té, na lokoso ya mbongo pe té, kasi na esengo nyonso pe na motema moko, ndenge Nzambe alingi.
[3] Bózala ndakisa ya malamu epai ya bameme ya Nzambe; bómilakisa bakonzi té na kati ya bato oyo Nzambe apesi bino.
[4] Bongo mokolo Mobokoli monene akomonana, nde bozwi lokumu oyo esilaka té.
[5] Ndenge moko nasengi na bino bilenge, bótosaka bambuta-muntu. Pe bino nyonso, bóyokanaka, bótika lofundu. Pamba té “Nzambe aboyaka bato ya monoko, kasi apesaka bolamu na ye na bato oyo bamikitisaka.”
[6] Yango wana bómikitisaka, po Nzambe ya nguya nyonso ábatela bino, pe átombola bino mokolo ye moko alingi.
[7] Bólongola makanisi nyonso oyo etungisaka bino; bópesa yango na Nzambe, pamba té ye moto asalisaka bino.
[8] Bófungola miso, bózala ekenge! Pamba té monguna na bino zabolo azali kotambolatambola, lokola tambo oyo ezali koganga pe koluka moto ya kolia.
[9] Bóboya ye, bóndimela kaka Nzambe, po boyebi 'tè bandeko na bino oyo bapanzaná na mokili mobimba bamonaka pasi se ndenge moko.
[10] Nzambe ya bolamu nyonso abengi bino po bózwa lokumu na ye ya seko, na lisanga ya Kristo. Sik'oyo bozali komona pasi po na mwa-tango moke, kasi ye nde moto akozongisela bino kimia, akopesa bino molende penza, pe akotelemisa bino makasi.
[11] Nguya ézala na ye seko! Amen.
[12] Silas, ndeko na ngai ya motema, asalisi ngai po na kokòmela bino mwa-mokanda oyo, po nálendisa bino pe nálakisa bino ndenge bolamu ya Nzambe ezali. Bótia molende bobele po na yango.
[13] Lingomba ya bato oyo Nzambe aponá na vile ya Babilone, etindeli bino mbote. Mwana na ngai Marko pe atindeli bino mbote.
[14] Bino nyonso bópesana mbote, bóyambana na bolingo nyonso ndenge ebongi na bato ya Nzambe. Bino nyonso bozali kati na Kristo, boboto ézala na bino nyonso.