Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:59

[1] Ndenge moko pe bino basi, bótosaka mibali na bino. Bongo soki bamosusu bazali kondima té atako bayoki maloba ya Nzambe, bándima po na maloba té kasi po na bizaleli na bino,

[2] awa bazali komona 'tè bozali na bizaleli ya malonga pe ya botosi.

[3] Bóluka komikómisa kitoko té na biloko oyo emonanaka na miso: lokola kokanga suki, kolata biloko ya or to bilamba ya kitoko.

[4] Kasi bózala nde bato ya mitema boboto pe kimia. Wana ezali kitoko ya kobombama; yango esilaka té, pe ezali na tina monene na miso ya Nzambe.

[5] Na tango ya kala basi ya bosantu bazalaká komikómisa kitoko bobele ndenge wana. Bazalaki kotia mitema epai ya Nzambe, pe kotosa mibali na bango.

[6] Bókanisa ndenge Sara abandaká kotosa Abraham; azalaki kobenga ye “mokonzi na ngai.” Bino bokómi bana na ye soki bosalaka makambo ya malamu, pe soki bobangaka ata eloko moko té.

[7] Ndenge moko pe bino mibali, bófandaka malamu ná basi na bino. Bóyeba 'tè bazali na makasi té lokola bino. Bótosaka bango, pamba té bango pe bakozwa bomoi oyo Nzambe alakaki. Bósalaka bongo po 'tè eloko moko té ébebisa losambo na bino.

[8] Po na kosukisa, bózalaka na motema moko, bóyokanaka pe bólinganaka lokola bandeko, bózalaka bato ya boboto pe bótikaka lofundu na kati na bino.

[9] Soki moto asali yo mabe, kozongisela ye mabe té; soki moto afingi yo, kofinga ye té, kasi senga Nzambe ásala ye bolamu, pamba té Nzambe abengi bino po bózwa bolamu na ye nyonso.

[10] Ekòmamá boye: “Moto oyo alingi kozala malamu pe komona esengo na bomoi na ye, ábimisa maloba ya mabe té pe átika lokuta;

[11] áboya makambo ya mabe pe ásalaka oyo ya malamu, álukaka boboto tango nyonso.

[12] Pamba té miso ya Nkolo ezali epai ya bato ya bosembo, pe matoi na ye na losambo na bango; kasi apesaka bato ya mabe mokongo.”

[13] Nani akosala bino mabe soki bomipesi na misala ya malamu?

[14] Ata bato bazali konyokola bino po bosalaka malamu, bózala na esengo! Bóbangaka bango ata moke té, pe bózalaka mitema likolo té,

[15] kasi bóndima na motema moko 'tè Kristo azali Nkolo. Soki bato batuni bino bolamu nini bozali kozela, bóyeba tango nyonso kopesa bango eyano ya malonga;

[16] kasi bózongisela bango eyano bobele na boboto, na botosi pe na eloko ya mabe té na se ya motema. Boye soki bozali na bizaleli ya malamu ndenge ebongi na lisanga na Kristo, baoyo batóngaka bino pe balobaka 'tè bozali bato mabe, bakotikala na soni.

[17] Kasi soki Nzambe moto alingi bómona pasi, ebongi bómona pasi po na makambo ya malamu oyo bosalaka, esika 'tè bómona pasi po bosalaki makambo ya mabe.

[18] Pamba té Kristo pe akufaki mbala moko likolo ya masumu ya bato; ye moto ya malamu akufaki na esika ya bato ya mabe, po ámema bino epai ya Nzambe. Akufaki po azalaki moto lokola bato nyonso, kasi asekwaki po azali na nguya ya Molimo.

[19] Na nguya na ye ya Molimo, akitaki epai ya milimo ya bato oyo bakangamá na mboka ya bato bakufá, po na koteya bango.

[20] Kala bato wana baboyaká kotosa Nzambe, nzokande ye azalaki kokanga motema tango Noé abandaki kotònga masuwa. Bato kaka mwambe nde bakotaki na masuwa yango; bongo bango babikaki na mai.

[21] Mai yango ezali kolakisa ndenge batisimo ebikisi bino sik'oyo. Moto oyo azwi batisimo alongoli mbindo na nzoto té, kasi asengi Nzambe po ázala na eloko ya mabe té na se ya motema na ye, po na Yezu Kristo oyo asi'asekwá.

[22] Ye asi'amatá na Likolo, pe azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe. Ba-anjelu pe milimo nyonso oyo bato babengaka “Bakonzi” bakómi kotosa ye.

1 Piere — Chapters