[1] Yango wana bólongola mabe nyonso, lokuta nyonso, pe zuwa; bótika kotónga baninga.
[2] Bózala lokola bana babotami sika. Bango balukaka bobele komela mabéle; mabéle oyo bino bosengeli koluka ezali nde Maloba ya solo, po bókola pe bóbika.
[3] Lokola ekòmamá: “Bosi'bomeki bolamu ya Nkolo; boyoki elengi na yango.”
[4] Bópusana penepene na ye; ye moto azali na bomoi, azali libanga oyo bato babwakaki; kasi Nzambe aponá yango, amoni 'tè ezali libanga ya lokumu penza.
[5] Bino pe bozali na bomoi na miso ya Nzambe, bozali lokola mabanga oyo ye atòngelá “Ndako” ya Molimo Mosantu. Asi'akómisá bino lisanga ya banganga-Nzambe na ye, po bópesaka ye mabonza oyo ekoki na ye pe esepelisaka ye, po na Yezu Kristo.
[6] Pamba té ekòmamá boye: “Nasi'naponá libanga moko ya monene pe ya lokumu. Natiá yango na Yeruzalem, lokola libanga oyo esimbaka bamir na yango makasi. Moto oyo akotiela libanga wana motema, akomona soni ata moke té.”
[7] Libanga wana ekómisá bino bandimi bato ya lokumu; kasi po na baoyo bandimaka té, “Libanga bamason babwakaki ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba.”
[8] Epai mosusu ekòmamá: “Bato babetaka mabaku na libanga oyo; yango ekweisaka bango.” Babetaka mabaku po baboyi kondima Maloba ya Nzambe; yango nde makambo esengeli kokweela bango.
[9] Kasi bino bozali ekolo oyo Nzambe aponá, bozali lisanga ya banganga-Nzambe ya Mokonzi monene, bozali ekolo ya bosantu oyo Nzambe akómisá ya ye penza, po bósakolaka sango ya misala na ye ya minene. Ye moto abengi bino po bólongwa na molili pe bómona moi na ye ya kokamwa.
[10] Liboso bozalaki ekolo na ye té, kasi sik'oyo bokómi ekolo ya Nzambe. Liboso Nzambe azalaki koyokela bino mawa té, kasi sik'oyo ayokeli bino mawa.
[11] Bandeko ya bolingo, bozali lokola bapaya awa na mokili, bongo nasengi bino: bókeba na baposa ya bomoto oyo ebundisaka bino na motema.
[12] Bózala na bizaleli ya malamu na miso ya bato bayebi Nzambe té. Boye, ata bafundi bino 'tè bozali bato mabe, bakomona misala na bino ya malamu, bongo bakokumisa Nzambe, mokolo ye akomilakisa na bango.
[13] Po na Nkolo, bótosaka bakonzi nyonso ya mokili, ézala mokonzi monene oyo aleki bango nyonso,
[14] to batambwisi ya mboka oyo ye atindaka po na kopesa etumbu na bato basalaka mabe, pe kokumisa baoyo basalaka malamu.
[15] Pamba té, Nzambe alingi boye: bókokisa misala ya malamu, po bókangisa minoko ya bazoba oyo bayebi eloko té.
[16] Bozali bato ya bonsomi. Nzokande bonsomi yango ekoki kopesa bino nzela té ya kosalaka mabe na kobombama; kasi bómikómisa baumbu ya Nzambe.
[17] Bótosaka bato nyonso, bólingaka bandeko na bino, bóbangaka Nzambe, pe bótosaka mokonzi monene.
[18] Bino baumbu, bósalelaka bakonzi na bino na botosi nyonso, ézala baoyo bazali malamu pe boboto, ézala kutu baoyo bazali matata.
[19] Ya solo, tango mosusu bakoki konyokola bino na nko po bomipesi na Nzambe; bongo soki boyebi kokanga motema, wana ezali bolamu oyo euti na Nzambe.
[20] Soki bokangi motema tango bazali kobeta bino po bosalaki mabe, eloko nini bokozwa? Kasi soki bokangi motema tango bazali kobeta bino po bosali kaka malamu, yango ezali bolamu euti na Nzambe.
[21] Wana ezali makambo Nzambe abengeli bino, pamba té Kristo amonaki pasi po na bino, bongo apesi bino ndakisa po bólanda nzela na ye.
[22] Ye asalaki lisumu ata moko té; ata mbala moko té alobaki lokuta.
[23] Tango bafingaki ye, azongisaki maloba ya mabe té; tango banyokolaki ye, akanelaki moto moko té, kasi amitikaki na maboko ya Nzambe, oyo akataka makambo na bosembo.
[24] Tango babomaki ye na kuruze, amemaki mokumba ya masumu na biso, po tókóma lokola bato bakufá na oyo etali masumu, kasi tózala na bomoi po na kosala malamu. Bobiki po na bapota ye azokaki.
[25] Pamba té, bozalaká lokola bameme oyo ebungi, kasi sik'oyo bosi'bozongi epai ya Mobokoli oyo azali kokengela bomoi na bino.